Ntoma Angelo Acerbi, episkopo ya lokumu ya nà mbula tuku libwa na libwa (99)
Jean-René Bompolonga- Kinshasa/Congo
Koleka mbula 50 na mosala ya ntoma na suka ya mokili, kobanda Ocean Pacifique tii na Poto ya kati, akangamaka na batomboki na ekolo Colombia, mosala tango inso na loboko na Papa mpe na Eklezia, lokola sango ya Ordre Souverain Militaire ya Malte, kulutu ya ba ntoma banso azali koleka epaso ya ye na kimia na ndako Mosantu Martha, « mofuteli ye » na Papa François. Na mbula 99, episkopo Angelo Acerbi akokelama mikolo mikoya episkopo ya lokumu. Akokoma bongo mokolo ya Lisanga ya ba episkopo ya lokumu kobanda 8 ya sanza ya zomi na mibale, mokolo Papa akosambela Consistoire ya ye ya zomi, esakolamaki na ngonga ya Angelus y mokolo ya eyenga 6 ya sanza ya zomi. Azui bongo mbano ya episkopo ya lokumu eye akelami ya mokolo koleka.
Milulu mya mobu tuku mitano (50) ya ki episkopo na ndako Mosantu Martha
Na mibu 70 ya mosala kati na Vatican, Papa asili atondaka botondi Mgr Angelo Acerbi na 27 ya sanza ya motoba elekaki, na bosali misa na chapelle ya ndako Mosantu Martha na libaku ya mibu 50 ya bokuli episkopo (22 ya sanza ya motoba 1974). Eleko lyoko ya bokutani na libota na basango, b amamelo ya bokabi ya Mosantu Vincent-de-Paul mpe basali ya ndako ya Papa.
Na ba continents mitano (5)
Abotami 23 ya sanza ya libwa 1925 na Sesta Godano, na nordi ya Italia, episkopo ya lokumu ya mikolo mikoya Angelo Acerbi akuli bonganga Nzambe mokolo 27 ya sanza ya misato ya mobu 1945. Ayingeli o mosala ya boyokani ya Vatican na mobu 1956, na bosali kati na batindami ya Papa na Colombia, Bresili, France, Japon na Portugal, na mpe na Conseil mpo na makambo ya leta ya eklezia. Na mobu 1974, Papa Polo ya motoba aponaki ye pro-nonce apostolique na Nouvelle-Zelande mpe motindami na Océan Pacifique, na bopesi ye kiti ya mokambi na Zella mpe titre personnel d’archevêque. Mokolo mwa 30 ya sanza ya motoba oyo elandaki, akulaki episkopo epayi ya Papa Polo ya motoba, na bazilika Mosantu- Petelo. Liloba na ye ya ntina ezalaki “in fide et lenitate” (“Kati na boyambi mpe na kimia”)
Yoane Polo ya mibale atindi ye lisusu lokola ntoma na ye na Colombia na 1979. Na mboka eye ya Amerika ya sudi, aleki tango ebele ya mpasi ya mosala na ye na bato ya boyokani basusu. Mgr Angelo Acerbi akangami poso motoba na batomboki ya Mouvement mokolo ya 19 ya sanza ya minei. Mikolo ye akangemaki, ye moko alobaki yango, azuaki ndingisa kosala misa mikolo minso mpo na baye bazalaki kuna.
Na Hongrie sima ya communisme
Na 1990, sima ya Colombia, episkopo aponamaki mpo na ekolo Hongrie, ntoma ya yambo sima ya kosila ya communisme (ndako ya ntoma ekangamaka na 1920). Na Hongrie, apesi pema ya sika mpo na botongi lisusu eklezia na lisanga ya ba sango sima ya bokweyi ya bakambi ya communisme, mpe eleko azalaki na mosala, ekolo eye etiaki mokoloto na mikanda mingi ya boyokani na Vatican. Azalaka lisusu ntoma ya yambo na ekolo Moldavia kobanda 1947 tii 1997, mobu eye atindamaki na ekolo Hollande. Na 27 ya sanza mibale ya mobu 2001, Yoane Polo ya mibale andimaki boboyi bwa ye ya mosala mpo’ ete mibu na ye mikokaki. Kasi kobanda mobu eye mpe mibu 14 maye malandaki (2015), azuaki mokumba ya sango ya Ordre Souverain Militaire de Malte.
Lelo, pembeni ya mibu monkama, lotomo lisusu ya sika ebandi mpo na Angelo Acerbi.
Botondi na ndenge otango mokanda eye. Soki olingi ozala natango inso na basango, mikomisa na mokanda na biso ya sango na esika eye