Luka

Mosantu Papa kati na losambo oboso bwa “Jardin des Anges", o malita ya Laurentine ya mboka Roma, o mokolo mwa mibale (2) ya sanza ya zomi na moko (11) na mobu moye 2024, Mosantu Papa kati na losambo oboso bwa “Jardin des Anges", o malita ya Laurentine ya mboka Roma, o mokolo mwa mibale (2) ya sanza ya zomi na moko (11) na mobu moye 2024,   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Papa avandi na kimia mpo ya bawà, mpe o kati na losambo oboso bwa bana oyo babotamaki te

Na malita ya Laurentine o mboka Roma, o mokolo mwa mibale (2) ya sanza ya zomi na moko (11) na mobu moye 2024, Papa François asali milulu mya losambo mpo ya kokundola bakufi. Yambo ya Misa, atikali mwa tango moke na losambo na “Jardin des Anges”, eteni ya esika moko bapesà yango mpo ya kokunda bana baye zemi esopanà, esika yango etondisami na biloko bya masano mpe baniama-popi. Na tango ya mateya, mosantu Papa aponoki kotikala na kimia mpo na komaniola mpe kosambela

Albys KBD cp – o Mboka Kinshasa/RDC

 

Lokola limesano mpe o libaku ya bokundoli baye bawà, ba mabota bakokendeke o malita mpo ya kotala bandeko bango batikà nsè eye. Mosala mona ezalisaka malita ya Laurentina, moko yam alita manene ya etuka ya Roma ezwami bongo na ngele (sudi) ya Mboka-mokonzi. Na bamama, moko akozongisa lisusu nkomà ya nkombo ya mwana waye akufà o likolò ya libanga ya lilita, mosusu akobongola mayi na ba fulele (fololo), batye na mbeki o kati ya baniama-popi, biloko ya masano zongazonga ya mwa lilita. Tozali bongo na “Elanga ya bana” eteni ya esika ba pesà na bana baye babotamaki te, baye bakufaki nayino na libumo, to mpe baye basopaki zemi. Papa François azali kokatisa mwa ba balabala, atelemi mpo nakosambela mpe kokitisa bitape bya bafulele (bafololo) liboso ya esika ena. Episkopo wa Roma, alobi eloko te, kasi alakisi bongo o bilembo bino, bokangemi bwa ye bwa solo solo mpo ya bomoyi bwa moto utò libumu ya mama kino liwa oyo nzambe akelà.

Tomasi, Matiasi, Maria, Yosefu, André, Ariana: ezaloi bongo bankombo ekomami likolo ya libanga ya lilita, to mpe likolo ya libaya, tango mosusu ekomamà na maboko. Na balilita ebele, nkombo “Foetus (mwana azali nayino na libumu)” ekomami liboso ya nkombo ya mwana ena.

““Maloba ma bobondi tango mosusu ezali mpamba to naezaleli ya moimi mpe na ntina te. Ata elobami na makanisi malamu, ekoki kokobisa ba mpota”. Wana ndè motuya ya likanisi ya kopona kotikala nyee (kimia) o kati ya malita mpe na tango ya Misa mpo ya kosambela na nsè ya motema mpe komaniola.”

Mwa ngonga ya bomanioli na tango ya Misa

Ekomaki yen a tango ya mateya, Papa François atikali nyee, akitisi mòto na nsè. Nsima ya Misa, asalaki losambo ya mokolo mona: “Bomoyi bwa biso o nsé eye, ezali sé mompepe, Lakisa biso lolenge ya kotanga mikolo mya biso, mpe besa na biso bwania bwa motema mpo ya kokundola ete eleko ya liwa lya biso ezali nsuka te, kasi ezali boleki o bofuluki ya bomoyi”. Na nsuka ya Milulu, yambo ete apesa libenisi lya yè, Mosantu Papa asengi na bandimi bazongisa “boyambi bwa abngo na Kristu oyo akufaki, akundami mpe asekwi mpo ya libiki lya biso”. Ata nzoto oyo ekufà ekosekwa o mokolo mwa nsuka, bongò baye bakufaki na nkolo, bakosangana elongo na ye na èlonga likòlò ya liwà.

Mpe alobi losambo na oyo aleki-likòlò: “Kumbama, o Nzambe, Tata ya Mokonzi wa biso Yezu Kristo, mpo ya Ngolu ya yo, obikisi biso na nsékwa o bawà ya Yezu mpo na Elikya monene ya bomoyi oyo ekobeba mpe ekopolaka te; yoka losambo (nsambo) ya biso tobonzeli yo mpo ya bandeko ba biso batikà nsé eye: tandola maboko mayo ma Ngolu mpe yamba bango o lisanga lya nkembo  ya santa Yerusaleme. O bondo baye bazali na mawa ya bokabwani, na likanisi ‘te bawei bazali na bomoyi nà yo elongo zambi ata nzoto oyo epesamà na mabele ekozwa elònga ya Pasika ya mwana wa yo”. Asukisaki bongo, nà elongi ebalukà epai ya mama wa Nzambe, oyo etikelaki biso epai ya mwana wa ye na nzela ya Eklezya; “na bolobeli bwa ye kamba boyambi bwa biso, mpo ete mokakatano moko te mo pengwisa biso o nzela ekomema epayi ya yo oyo ozali esengo suka te”.   

Misa mpo ya bawà
Misa mpo ya bawà

Lobiko na nzela ya bongengi bwa Elikya

Na lisanga ya losambo, “Bongengi bwa elikya to Etincelles d’espérance” etuluku moko ya bamama baye ba bungisa bana balenge mpo ya makambo ndenge na ndenge, basimbani moko na moko bazali kolela. Basanganaki sima ya Jubilé ya motema Ngolu ya Nzambe na lisalisi ya sango mokonzi ya paroisse oyo ezali na malita, “bapesaki biso elikya ya kosekwa mpe ya kondima, eloko ya motuya oyo tosengelaki na yango, (eloko tozalaki na yango mposa), kokabola mpasi mpe lokola. Tokabolaka mpasi ya biso elongo”  Ezali na bana bitiké, basi bakufela mibali, kasi mpo ya ba boti, elobi basi bina, “ezali na liloba te ekoki kolimbola biso”.  Ba kosangisa bankombo ya bana babango tango bakopesa nkombo yambo,: Francesca mobongisi, mama ya elenge Giorgia akufaki tango azalaki na bambula zomi na mitano (15 ans), Caterina mama ya Marina, Maria Teresa mama ya Daniele, Shanti ya Marco, na mpe Roberta oyo akufeli bébé wa ye Claudio, Roberta mama ya Chiara, Nazarena mama ya Chiara mpe Angela ya Cinzia.  Mpo ya kotondo botondi mokinani ya Petelo mpo na kimya ya yen a limemya na tango ya misa mpe mpo ya boyei bwa ye na malita ya Laurentina, ndakisa ya bolingi, lolenge lilamo yakozala pembeni na bana babango, banso elongo, bakabeli Papa François elamba ya kingo ya pembe, mpe balobi ete: “ezali elembo ya bango ya koyamba ye na bolingi.

Botondi na ndenge otango mokanda moye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka ma biso ya basango nakofina esika eye  

 

04 November 2024, 10:11