Noeli ya bakristu eye bazali konyokola, lolakà ya mpasi ya Proche-Orient na Sahel
Albys KBD cp – Mboka Congo-Kinshasa
Bamiliyon ya bandimi bavandi na ba etukà oyo ezali kotungisama. Lolenge ya bandimi awa Noeli epusani, etangami na minyoko, bitumba mpe kibobolà, etalisi Marta Petrosillo. Ye azali bongo Mokambi ya moziki ya Papa ekosalisaka eklezya oyo ezali na konyokwama, na lopoto ebengami (AED: Aide à l'Église en détresse), akomi motuya ya misala ya mibù mibale na maye matali bonsomi ya boyambi o kati na mokili. «Tozali bobele kosala lapolo ya sika, ekomonisama na sanza ya oktobere ya 2025», elobi ye na masolo apesaki na bopanzi-nsango ya Vatican, na kopesa motango ya nsuka ya bato miliyon 307 bavandi na bikolo tuku mibale na mwambé (28) “ezali konyokwama”.
“Tokoki te kopesa motuya y abato oyo bazali konyokwama, kasi tozali bongo liboso ya likambo ya mokili mobimba oyo, esengeli kotungisama mpo ya bandeko ba biso basi mpe babali”. Bisika ya kpokoso mpo na bandimi o mokili, ezwi bitando binso ya kontina. “Afrika, ezali kontina oyo etutisami mingi na kobebisama, o mibù miye miwuti koleka”, elobi Marta Petrosillo. “Solo, ngulupa ya batomboki ya lingomba islam ut’o lotukà moko ya mibù, oyo epikamaki na bitukù ya Proche-Orien, ekomi na engumba ena. Tozali komona kobilisama ya ngulupa ya ba djihadistes nà misàlà ya ntoki na bitukà ya lac Tchad mpe kati na Sahel”, ekobi ye koloba.
Ekolo ya Nigeria na oyo ya Burkina Faso
Na bituka biye, kpokoso ya Burkina Faso ezwami lokola ndakisa. “Bambula zomi ewuti ekoleka, na kati ya Global Terrorist Index, Ekolo Burkina Faso etangamaki te ata na motuya ya mokama na molongo, kasi na 2024, amati na molongo mwa yambo”. Mbula moleki, Tuku motoba na sambo mp ona monkàmà (67%) ya bato bazwaki mpasi na ba attaques terroristes ezwamaki na Burkina Faso”. “Bakristu bazali konyokwama kuna mpo bazali na motango ya moke, na nsé ya tuku mibale na mitano mp ona monkama (25%) ya bato, mpo na kobundisama. Ekolo mosusu ezali na kpokoso nde Nigeria: ut’o mibu zomi na mitano, tozali komono bikela ya boyinani koleka ndelo, ekowuta na Boko Haram na nordi ya ekolo wapi epayi bato bazali mingi mingi ba-islam. Kasi ebakisami mpe lisusu likambo ya botungisi ya ba bergers peuls oyo bazali kosala na bikolo ya katikati mpe na bitando bya sudi”.
Marta Petrosillo atalisi lisusu mobulù na etukà ya Cabo Delgado na Nordi ya ekolo ya Mozambiko, mpe matomba ya makàmà ya bozangi boyokani na ekolo ya Soudan. “Ndelo ya bokabwani kati na ekolo moko nà mosusu, ekomema na kobilisama ya maziki ya ba djihadistes”, elobi ye, nakotanga likambo ya mikakatano na ekolo ya Niger, ya Mali,mpe na République démocratique du Congo.
Likambo ya ekolo ya Syrie
Nsima, Marta Petrosillo ataleli lisusu konyokwama ya bakristu ba Proche-Orien. Abandaki na ekolo ya Syrie sima ya busukisi ya eleko ya Assad. “Na makambo misusu, bokebi ezali, bokutani kati na bakambi basika mpe baepiskopo ezali kosalema, lokola limboli”. Kasi “emonani polele ete bobangi ezali makasi, mpo ete bozangi bosikisiki (bozangi kimya) etiya mondelo na bonsomi ya bakristu”. Bobangi ena emonisami na makambo ewuti kosalema. «La Syrie ezali ekolo oyo ewuti kobima na bitumba mibù ebele mpe emoni bakristu ba yé bakabolami : soki na 2012 bakristu bazalaki miliyon moko na ndambo, lelo batikali kaka nkoto 250 (250 000) ; na Alep, oyo kala ezalaki esika ya makasi na bakristu, bakotanga 200 ti 250 000 bakristu, lelo lingomba ekiti kaka na 30 000 ya mpamba».
Bakristu ya Gaza
L’AED ezali na ngambo ya bakristu na Proche-Orient mobimba: kobanda na baye bazongaki na Ninive sima ya eleko mabé ba EI (Etat Islamique) bakangaki mboka, tee bamangomba ya Palestine mpe ya Liban oyo ezali kotungisama. «Mpo na Palestine, misolo mingi mingi epesameli bango na etukù ya Gaza, wapi epayi bakristu bazali penepene ya miliyé moko ya bakristu oyo ebele bakimi na baparuasi katoliki ya Santa Familia mpe na eklezya ya grecque orthodoxe», elimboli Marta Petrosillo. Mpo na maye matali Liban nà Jordanie «oyo bazalaki bisika ya botuya mpo na lisalisi ya Syrie mpe Iraq, alobi ete bozangi koyokana ebongoli mikakatano ya politiki na ya nkita na likambo moko ekosenga lombango».
Pakistan, mobeko mpo na botuki nzambe
Na kobende bilili na ndambo ya mokili etikali, mokambi ya lapolo ya AED mp ona bonsomi ya mangomba, amonisi mpe likambo ya bakristu ba Pakistan. “Mobeko mpo na likambo ya kotuka Nzambe, ezali kokoba lisusu lokola mokakatano mpe baetumbu ya liwà”, elobi Marta Petrosillo, oyo apesi ndakisa ya etumbu ya liwà ya Shagufta Kiran, mokristu moko ya bambula tuku mineyi (40ans). “Kasi likambo mokola motuya ezali makamà oyo ezwami mp ona bakofunda ya likambo ya kotuka nzambe, tango bato baye bafundami babomami mpe babuki ba kartié mbimba bisika wapi bavandi, lokola na ndakisa ya Sargodha na sanza ya mayi(mai) mowuti koleka”. “Likambo lisusu likosimba longomba lya bakristu lina, ezali kokamatama ya bato, kobonwisa bato mpe ya basi, mingi mingi ya bilenge basi bobalisami na makasi. Ezali nde mpota monene mpe likambo ekosila te, kasi ekomono mabota ya bafundami batikali bango moko mpe na bozangi bokasi liboso ya ezalela ya bozangi bosembo”, lolenge yoko mpe na ekolo ya Inde, elobi ye, “Kuna, botungisi ya bakristu ekowuta mingi mingi na ba extremistes hindous”. Na Asie, bopimisi ya bonsomi na nzela ya boyambi ya mangomba ya bakristu, kati na bikolo biye boyangeli ezali ya kokonza, ezali makasi koleka,ndakisa ya ekolo ya Corée du Nord, ezali kotungisa”.
Ekolo ya Amerika ya Sudi
Na bosukisi, ekolo ya Amerika ya Sudi etondisami na botungisi ya basali na Nzambe (bamibonzà), mpo na ba mbeba ya bobomi bato na ekolo ya Mexique, bongo ekolo ya Nikaragua etikali ntina ya botungisami mpo na “bokoli (komata) ya makambo mabe” emonisami na kokangama ya ba ONG mpe mangomba misusu ekangemi na eklezya ya katoliko.
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa