Luka

Lolaka lya Papa na bilenge mpo na Nkita Lolaka lya Papa na bilenge mpo na Nkita  (AFP or licensors)

Papa asengi bilenge bazala na molimo ya nkita mpo na lobi

“Kolinga kosala enkonzo, kolinga na bosolo basali, babola, na kolinga kolekisa nayino liboso mambi ma mpasi mpenza, wana nde ezali mbela mosantu Papa Francois abwakeli Bayi likita ya “fondation Ekonzo ya François”, lingomba lisangisi bakambi misala ya mokili mobimba po ya botali lisolo ya kosangisa. “Esengeli likambo eye kitoko ya solo oyo eszali ya bino ekola, elenda, ekutana na bilenge mpe ebota mbuma lolenge ya Nsango Elamu mpe ya malamu.

Jean-Réné Bompolonga – O Mboka Kinshasa

 

“Bozala banzengeneke, bobanga te, bolikya bolembe te”, wana bizali bobyangi misato Papa François asali na lisukulu na ye ya 25 ya sanza ya libwa na bilenge bazali kotala nkita mpe basangani na lingomba “Nkita ya François”, likambo ya solo eye esangisi bakambi misala  na baye bazali koluka mbongwana ya mokili mobimba, bamipesi na botali lisolo ya bosangisi bato mpe mbongwana mobimba. Mosantu Papa asengi na bango babongola lolenge nkita ezali lelo, na moikili eye ezoki na bitumba, epayi wapi “democratia ezali kobundisama” mpe epayi wapi “populisme na kozanga bokokani bizali kokola”. Mokano ya mosala ebongisami, likanisi ebakisami.

Kopesa likambo yango motuya na nguya ya boboto

Bokobongola yango kaka na bokomi ministres te, to prix Nobel ou bato minene. Bokobongola yango na bolingi yango, na muinda ya Nzambe, nakopesa yango motuya na nguya ya boboto, na molimo ya bopanzi nsango elamu ya François ya Assise”, elobi na bango François.

Moteyi moko ya lokumu: Yezu

“Nkita ya François” ebotami eleki sik’oyo mibu mitano. Papa alobaki esengo na ye na bilenge baye “bazuaki na liseki te libyangi na ye po ya “kobikisa lisusu” nkita” mpe “bayambaki malako eye apesaki bango na masolo na bango ya mbula na mbula” maye, ebongisami na “liteya likonzi ya Eklezia”, mpe esimbami na “Nsango Elamu”. “Bazali ebeli bateyi bokutani na bango ntango bozalaki koyekola to na ntango bozalaki kosala misala; kasi botali Nsango elamu, ata lisolo ya solo ya banso, ekolakisa Moteyi moko ya lokumu, Yezu, oyo ye meyi alobaka “Nazali nzela, bosolo na bomoyi”, molakaki bango Papa.

Kotiya liboso mpenza makambo ya monyoko

François alimboli ete Fondation ekoti sik’oyo na « etapi ya sika ». « Likambo ya solo ya kitoko » oyo ebongisami mikolo miye esengeli kokola mpe kokoma makasi, na bokutani na « bilenge bayike » mpe « na bobimisi « mbuma lolenge ya Nsango elamu mpe ya boboto ». Oyo esalemi tii lelo eye na bilenge bamipesa na maye matali nkita, elobi François, “eleki maye manso bazalaki kozela ». Papa alobi kutu ezali mondenge oyo balongi : « Nalingaki na kata mondenge na bino, po bilenge bazali na bomoyi inso liboso na bango, bazali nzela moko ezali kobika, mpe nzela epayi wapi biloko ya malamu bikoki kobima, na botalaka malamu ndenge ya kotiya ya mabe pembeni.

Ndakisa ya mosantu François

Na ndenge azalaki koloba, François abimisi elongi ya mosantu François, « mwana mobali ya moteki » oyo akokaki koyeba « malamu mpe mabe ya mokili eye ». Ezali mpenza mpe na likambo lina été « nalingi naloba molulu nyoso ya Nkita François nzinga-nzinga na François ya Assise oyo, na botiki nyoso po na bolingo ya Yezu na ya babola, apesaka mpe etapi ya sika na botomboli nkita.

“« Kolinga nkita, kolinga ya solo basali, babola, na boluki mingi makambo ya minyoko makasi””

Kolongola bobangi mpo ya kotatola

Papa apesaki na baye bazalaki wana makambo misato ya motuya: “Bozala bazengeneke, bobanga te, bolikya bolembe te”, ayebisi bango lisusu lolenge batiaki mokoloto na “Boyokani ya Assise” mokolo mwa 24 ya sanza ya libwa ya 2022. François alobi mingi na likambo y motuya ya liboso, ezali bongo ntina ya bokaboli mabongisi na “bilenge basusu”, oyo ekoki kosalema na lisungi ya “kotatola moko ya bomoyi”. “Bozala bomoko na maloba na bino -likambo ena ezali kosepelisa bato te- na ntango bozali kopona. Basepela na bino na maye bokani kosala na misala na bino. Kasi te po bokoma ebele mpe makasi; kasi po bokaboli  na bato ebele oyo bino  bozui, elingi koloba ‘nsango ya kitoko” eye ewuti na Nsango elamu, ata nkita ekoki kobongola po ya malamu”, abiangi François, oyo alendisaki lisusu na mateya alobaka na JMJ o mboka Libonne: “bozala bato bazali kokamba bobangi te, kasi baye bazali kokamba ba ndoto”. Po “na kotambuisa ndoto” na kati ya mokili epayi wapi “mingi yak osala ezali”, esengeli “komeka na maloba ya sika”. Yango nde bakristu basalaka, bamitikaka babangisa bango na “oyo ya sika”. Papa alobi mawa na ye mpe pasi na ye ya komona “bakristu bazali kobombana na sacristies pamba te bazali kobanga mokili”, bango bazali po na ye “bato bazui lipaso na bobangi”.

Elikya, na bokutani na mokili oyo etungisami

Ndenge ya sika ya kosala makambo ya mombongo

Na koloba lisusu lisungi ya dicastère eye etali Mosala ya botomboli bomoto mobimba, oyo “ekozala na misala ya Fondation, oyo nazui mokanda ya kokelama na yango” mpe ekolakisa “bosolo eye bino bokoki kopesa bomoyi mpe bokokisi ndoto ya mbongwama ya nkita ya lelo mpe kopesa molimo na nkita ya lobi”, Papa François alaki na suka Eklezia ekozala penepene, ekofungola ‘Nkita ya François’ “bikuke yak osala lisanga” na mangomba ya ba katoliki maye “bipanzani o mokili mobimba”. Botomboli eye, po na Papa, ekosunga “po na kotiya bokutani na synegies na makambo ebele ya solo na ba réseaux y abato bazali kokabola mabongisi ndenge moko”. “Ebotama kati na bino lolenge ya sika kozala lisanga mpe yak osala nkita, eye ekobota oyo ya kopola te kasi ya kozala malamu ya bato na biloko mpe na molimo po ya banso. François asukisaki lisukulu na ye na koyebisa bilenge bamipesa na makambo ya nkita ete nabotikali “bopikiliki” na mbela na bango, bomoyi bwa bango “ekokende liboso” na “masolo kitoko ya koloba na bana bango na bakoko na bango”.  

30 September 2024, 17:28