Koyeba Elikya mpo ya kokamwa ebele ya bolamu na mokili
Papa Francois - Albys KBD cp - o mboka Kinshasa/RDC
Yubile ya 2025, mobu mosantu eye na lingi kopesa litambwisi ya “Batamboli ya Elikya”, ezali libaku lipesami mpo ya kovandela libongi linene ya bokristu ya moboko mpe ya mokano. Mingi mingi na eleko tozali koleka, epayi wapi bitumba bya mokili mobimba ya mbala ya misato ezali kosalema biteni na biteni o miso ma biso, ekoki mpe komema biso nakoyekola ezalela ya molili, ya kolemba nzoto, ya kotyola.
Nzokandé Elikya ezali libongi mpe mokumba mpo ya mokrito moko na moko. Ezali libongi oyo Nzambe ye mei akopesa biso. Solo kolikya ezali kaka lolenge ya kokzwa manso malau mpamba te, neti tanto tokolikya kolonga na bamituna ya bitéyelo (“tokolikya élonga”), to mpe tokolikya mwa ngonga elamo mpo ya kotambwisa makolo na esobe o mokolo mwa lomingo na tango ya elanga (tokolikya tango malamu). Te, kasi kolikya ezali kozela eloko esili kopesamela biso: libiki na bolingi bwa libela mpe bwa seko bwa Nzambe. Bolingi bona, libiki lina ekopesa bokenzù na bomoyi mpe ekotonga mokongo epai wapi minso mikoteleme, atako mabé mpe mitungisi mikowuta na masumu na biso babali nà basi. Kolikya ezali nde koyamba likabo oyo nzambe akopesa biso mikolo na mikolo. Kolikya ezali kokundola bokenzù ya makawisi ya kolingama, ya boluki, ya kolukama na Nzambe oyo akomikangisa te o likolo na bonzambe na yé, kasi oyo amikomisaki mosuni mpe makilà, lisapo mpe mikolo, mpo ya kokabola likambo labiso.
Na lobi ete elikya ezali likabo na nzambe mpe mokumba mwa mokristu. Kozala na elikya na bomoyi ekosenga “mystique des yeux ouverts (mobombamo ya miso efungwamà)” elobakà théologien monene Joseph-Baptiste Metz: koyeba kososola bisika binso mimekano mya elikya, bofungwami ya maye makosalema kati na maye makoki kosalema te, ngrasya bisika lisumu libebisaki boliki. Ezali na mwa tango na sololaki na banzeneneke babale ya elikya ya motuya, basango babale, moko mo-Israel, Rami, mosusu mo-Palestina, Bassam. Bango babale babungisi bana babango bilenge basi na bitumba ekotangisaka makila kuna o Mboka esantu uto bambula ebele. Kasi mpo ya minioko ya bango, mpasi bayokaki na liwa ya bilenge bana babango ya basi – Smadar mpe Abir- bakomi bango babale baninga koloba kutu bandeko. Bazali na kolimbisa mpe kozongisa boyokani kati na bomoyi ya mokolo na mokolo. Kokutana nà bango etondisi ngai na elikya. Bolingi mpe bondeko bwa bango elakisi ngai ete boyinani ezali ata moke te na liloba la nsuka. Kozongisa boyokani bazali n’ango sika, ezali lisakoli ya boyokani monene mpe molayi, elembo ya kolemba te ya elikya. Elikya ekofungolaka biso nzela na bisika oyo tokanisaki
Na biangi motangi moko na moko ya mokanda moye, nakosala mwa elembo: na mpokwa yambo ya kolala, nakokundola bikwelà boleki, bokutani bosali, bokende koluka bilembo bya elikya kati na mukolo ewuti koleka. Kosekisa ya moto oyo tozelaki te, mwa mosala ya mpunda tomonaki na kelasi, ezalela ya malamu tokokutana na yango na mosala, lisali at aya moke ; elikya ezali bongo «libongi lya bana»,
Lokola likomaki Charles Péguy. Tosengeli kozongela bomwana, kotala nà kokamwa mokili, mpo nakobenga bango, koyeba bango, kokumisa bango. Toyekola kokundola elikya. Nayango tokoki kokamwisa na bolamu mokili. Mpe mitema mya biso mokongenge na elikya. Tokoki zala bongo mwinda ya kilobi mp ona banso bazali zongazonga ya biso.
Etuka ya Vatican, mokolo mwa 2 ya sanza ya zomi o mobu 2024
Melesi na ndenge osili kotanga lisolo eye. Soki bolingi kokoba na kolanda mayebisi, mikomisà na mokanda mya mayebisi, o kofina awa