Luka

2025.01.05 Angelus ya yambo ya lomingo ya mobù 2025 o mokolo mwa mitano ya yanuali, ut'o lininisa ya ndaku ya ba ntomà. 2025.01.05 Angelus ya yambo ya lomingo ya mobù 2025 o mokolo mwa mitano ya yanuali, ut'o lininisa ya ndaku ya ba ntomà.  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Angelus: komekola Nzambe wa bolingi ndelo nsuka te

Ut’o lininisa la ndaku ya ba ntomà, Pàpa Franswa asali mpo ya mbala ya yambo nsambo la Angelus ya lomingo ya mobù 2025 o mokolo mwa mitano ya yanuali. Nakolàka ete bokasi bwa bolingi bwa Nzambe ekosuka soki moke te, Tata mosantu alendisi ba bandimi na “nakongalisa mwinda” mwa bolingo bisika binso mpe “nakozala banzeneneke ya elikya nà ba ‘iyo’ ya bomoyi, na biloko ya mike mike kasi ekomonono, nà lolenge lya kopono oyo ekopesaka bomoyi”.

Albys KBD cp – Kinshasa/RDC

 

Na lomingo moye ya ibale, nsima ya Noele, milùlù ya losambo ekopesa likanisi lokola matangi, libandela ya Nsango elamu ya Yoane. « Mwinda mongengi o kati ya molili, kasi molili ekangi yango te », etangi Franswa, liloba oyo wapi elakisi ete eloko moko te ekokanga bokasi bwa bolingi bwa Nzambe. «likolo ya mikakatano mpe koboya, azali kongala mpe kongengisa nzela ya biso », ebandakii ye.

Bompikiliki moye mwa bolingi bwa Nzambe, ekomonisama na crèche, tango mwana wa Nzambe “amikabi, motaù mpe nakozanga makasi”. Liboso na bakengeli mpata, « bato baye mitema mizokà (mibébà) na mpasi ya bomoyi mpe bobosani (bobwakisi) ya mokili », na nsima banganga minzoto bawuti o mosikà. Yezu akaboli mpe bomoyi bwa botàu ya Maria nà Yozefu, « oyo nà bolingo, bayambi mpe babokoli ye, kasi nà makoki moke mpe nà mikakatano ya bayé banso bakozàlakà na bozwi te », elobi Tata-Mosantu.

Kofungola lininisa ya mwinda

O boso bwa etulukù ya batamboli ya boyambi basanganaki na place Saint-Pierre atako mbula ezalaki kobeta, Pàpa azongeli koloba ete « Nzambe akolembaka soki moke te » ata tee lelo. Nzokandé, « akoluka banzela nkotà mpo ya kokuta moko na biso, esika wapi tokoki kozala, akotanga mpe akotala te, kutu akofungola ata na bùtù ya bato, eleki molili, balininisa ya mwinda oyo molili ekoki kozipa te ». 

“akoluka banzela nkotà mpo ya kokuta moko na biso, esika wapi tokoki kozala, akotanga mpe akotala te, kutu akofungola ata na bùtù ya bato, eleki molili, balininisa ya mwinda oyo molili ekoki kozipa te”

Bolingo moye mokolembe te mwa Nzambe, “eloko ekobondo mpe kolendisa biso”, ekolendisa nakomekola yé, elobi Mokonzi monene ya bakatoliko. Lolenge kani ? Nako «ngalisa mwinda bisika binso tosengeli, mpe na moto nyonso tokokutana na ye».

Lekisa bolingi bwa Nzambe

Pàpa abiangi motamboli nyonso ya boyambi “abanga te nakopusa litambe ya yambo mpo ya kofungola lininisa mokongenge mpo ya bozalani nà bayé bazali konyokwama na kolimbisa, koyoka mawa mpe koyokana, mpo ya kongelisa makasi nzela, ebatela kimya, ezala na bokoki mpo ya banso”. Mbela mosusu ya makasi mpo ya mobù moyé ya jubilé, ezali « kozala bapanzi nsango ya elikya nà biyano ‘iyo’ na bomoyi na biloko ya mike mike kasi ekomonono, nà lolenge lya kopono oyo ekopesaka bomoyi »

Na bosukisi, Franswa asali motuna na maye matali balininisa ya mwinda oyo moto nà moto akoki kofungola : « wapi epayi ngai na koki kozala lininisa oyo ekolekisa bolingi bwa Nzambe ?»

 

Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.

 

06 January 2025, 09:22