Bomimoniseli: Pàpa alendisi nakozala «mwinda mokolakisaka Nzambe»
Albys KBD cp – Kinshasa/RDC
Na eyenga enene ya bomimoniseli ya mokonzi mosalemaki o mokolo mwa yambo mwa mokolo motoba (6) ya sanza ya yanuali na etùkà ya Vatican, o ekolo ya Italy, Pàpa Franswa akambaki misa o kati ya baziliki Mosantu-Petro o boso bwa bato soki nkoto mitano. “Eyenga ya banganga-minzoto to bankùmù” na nordi, bomimonisi ya mokonzi ezali bomimoniseli bwa Nzambe na mokili. “Nsima ya komono mwinda mwa sika o likolo, banganga minzoto, batamboli, nakobongolo bomoyi”, elobi Pàpa.
Monzoto mokongenge
Ya liboso (nako banda), alobi nayino ete, “monzoto mozali kongala (kongenge)”. O eleko ya Yezu, ebele ya bakonzi banene bazalaki komibengisa “minzoto”, pamba te, bazalaki na bomimonisi, bokasi, boyebani (bokumisi). Kasi, “ezalaki te mwinda mwa bango ndé elakisaki na banganga minzoto mobombamo ya Noele ”, nzokandé “nkembo ya bango ya bomoto mpe ya malili, etalaki kaka mitango mpe mposa ya kokonza, nakozanga koyanola bosengà bwa sika mpe elikya ya bato bazali nakoluka”, esakoli Franswa. Kasi ezali ndé mwinda mosusu, oyo ezwi elembo ya monzoto, ekongalisa mpe kopelisa nakotumba mpe kozikisa. Monzoto mokolobela biso mpo ya mwinda moko kaka, oyo akoki kolakisa moto nà moto nzela ya libiki mpe ya esengo: oyo ya bolingo. Emonisaki yé.
Nde na bolingi bonà, elobi Pàpa, “tosengeli komekola bolingo bwa Nzambe oyo akomaki moto amikabaki (…) mpo ya biso, bongo biso mpe tomipesana kati na biso mpo ya baninga, mpo tokoma elembo ya elikya na bozongiselani, mingimingi na tango ya molili ya bomoyi”.
Lolenge yoko, na bolingi, « tokoki komemela Yezu, bato banso tokokutana na bango, nde tolakisi bango, na elembo ya Mwana oyo akomaki moto, bonzengà bwa elongi ya Tata (cf. Is 60,2) mpe lolenge ya yé yakolinga, esalemi na bozalani, na mawa nà bolingo ». Ezali nde etindà, elobi episkopo wa Roma, « oyo tosengeli kokokisa na pete kozanga makamwisi, kasi nakokomosa mitema mya biso mwinda na boyambi, kotala ya biso ya mawa mpo ya koyamba baninga, misala mpe maloba mya biso ezala ya bolingo, etondà bolamo nà bomoto ».
Emonani bipayi (bisikà) binso
Ezalela ya ibale ya monzoto, ezali “emoniseli eye na bisika (bipayi binso)”. “Banganga minzoto balandi bilembo ya basékélé moko te, kasi bamoni monzoto mongali o likolo. Bango bamoni kasi basusu, lokola Herode nà bakomi, bamoni yango te”. Kasi monzoto “mozala kaka wana, moto nyonso atomboli miso o likolo mpo ya koluka elikya, akoki komono yango”. Nzambe, ebakisi Tata mosantu ete, “akomimonisa mpamba te, kasi akokaba bozalani na yé, na baye banso bakolukaka yé na bosolo”. Mpo ya Franswa, monzoto moye momonisami bisikà binso, elimboli ete “Nzambe akolukaka se moto nyonso. Ayaki na mokili mpo ya kokutana nà bobali mpe mwasi nyonso, atali nkota, ekolo to bato ba ye tè. Apesi na biso lokola, etindà enà ya mokili mobimba”. Monzoto mokolobela biso mposa ya Nzambe “moto nyonso na mokili, na nkita ya bokeseni, ayeba kotonga libota lyoko, mpe azala na boyokani, bofùluki mpe boboto (cf. Is 2, 2-3.4-5)”.
Kolakisa nzela
Nakolobela ezalela ya misato ya monzoto, oyo ya «kolakisa (komonisa) nzela», Mosantu Pàpa alobi été, «ezali eloko ya motuya, mingimingi mpo na Mobù Mosantu moye tokosepela, mpe elembo ya ntina ezali ya kotambola». Nakobonda nzela, solo, monzoto ekoyebisa biso ete Nzambe akokutana na biso, bisika tozwami, mpo ya kobianga biso totambola o nzela, tokola elongo na yé na bolingo kino tokomisa yango eloko ya motuya ya bomoyi bwa biso. Monzoto « mokoyebisa biso été, na nsela ena, o kati na Eklezya, tozali banso lisanga ya bato bakotambola elongo, (lokola ekomami na Ecum.Vat.II, Const. Sacrosanctum Concilium, n.2), bakotambolaka na bomokitisi, mokolo na mokolo sima ya bilembo bya Mokonzi Yezu ». Mwinda mwa monzoto ekobianga biso “na kosala mobembo o ntei ya biso” oyo, lokola ekomaki Pàpa Jean-Paul II mpo na Jubilé molekaki o mobù 2000, «nakolongola o mitema mya biso manso mozangi bolingi».
Na bosukisi mateya mayé, Pàpa asambelaki mpo ete Mokonzi « akomissa biso mwinda mokomonisa yé, na ndakisa ya Maria, boboto nakomikaba, nakoyeba koyamba baninga mpe na bomikitisi ya kotambola elongo, mpo ete tokutana na yé, toyeba yé, togumbamela yé, bongo tozonga ya sika, tomema mwinda ya bolingi bwayé o mokili »
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.