Luka

2025.01.03 Basangani ya lisàngà ya Mosantu Yoane Mobatisi mpe Yoane Mosangeli Sango Elamu ya ba “Chevaliers de Maltes” na mboka Katanzaro na engumba ya Kalabre 2025.01.03 Basangani ya lisàngà ya Mosantu Yoane Mobatisi mpe Yoane Mosangeli Sango Elamu ya ba “Chevaliers de Maltes” na mboka Katanzaro na engumba ya Kalabre  (Vatican Media)

Kogumbamela Nzambe mpe kosalela mozalani (moninga) na ngai, babale bikela bizali na boyokani makasi

Pàpa ayambaki bandimi ya ekolo ya Italy oyo basalaka nà mabele ya Kalabre na lisanga ya bandeko babalie moko, oyo bakambami na libateli yam ama wa Nzambe, bamipesà na bogumbameli ya Sakramento-Esanto, na komipesa mpe lokola o boso bwa bandeko babolà to bakoni. Pàpa apesi bango longoni ana kokoba na elikya “na nzela ya kokaba oyo mokonzi akokende elongo na bango séko”.


Albys KBD cp – Kinshasa/RDC


Na ndako ya likita, Pàpa akutanaki o mokolo mwa mosala mitano mwa misato 3 ya sanza ua yanuali, basangani ya lisàngà ya ekolo ya Italy ya Mosantu Yoane Mobatisi mpe Yoane Mosangeli Sango Elamu ya ba “Chevaliers de Maltes” bawutaki na mboka Katanzaro na engumba ya Kalabre, na sudi ya esanga ena. Pàpa apesi likanisi na maloba masato: -kogumbamela, -kosalela, -kotambola, na ba layiki oyo basimbami na mosantu ndoyi, Maria, Mosantusantu mama wa Nzambé “oyo akolakisaka nzela, elimboli ete Yezu: oyo azali Nzela, bosolo mpe bomoyi (cf. Jn 14, 6)”.


Bameseni kogumbamela Sacramento-Esantu, Basangani ya lingomba ena ba biangami na Franswa mpo ya kotombola losambo, ya moto ye mei mpe ya lisanga, mpo ezala bokasi oyo ekokolisa lisusu lisanga lya bango. “Molende ekobatela bondeko: ya Mokonzi Yezu, oyo akoleyisa biso na bomoyi bwayé mpe akokamba biso na molimo mwa yé, wapi epayi mikowuta makabo manso, mbuma ya malamu ekokomisa eklezya mpolu na esengo”, endimisaki bango Franswa.  

““Molende ekobatela bondeko: ya Mokonzi Yezu, oyo akoleyisa biso na bomoyi bwayé mpe akokamba biso na molimo mwa yé, wapi epayi mikowuta makabo manso, mbuma ya malamu ekokomisa eklezya mpolu na esengo””

Kokangama na Nzambe mpe komipesa na bato


Libiangi mosusu ya lisanga ya basàngo ya engumba ya Kalabre, ezali kosalela bazalani babango. Kasi Franswa akanisi bango été boyokani kati na kogumbamela mpe kosalela ezali (esimbami) makasi. Solo mpenza, tango bakokendeke kotala babolà, bakoni mpe bayé bazali na minyoko, bazali kosalela lolenge Mokonsi oyo ayaki o mokili mpo ya kosalela basusu (cf.Mc 10, 45). “Bino mpe lokola, neti bitapi ekàngàni na nzete, bokobakisa bolingami bwayé tango bokopusana na bato ya mike nà bayé bazali na bosénga na mawa mpe bolingi na motema”. Franswa alaki bango ete litatoli la libiangi la bang ona nzambe mpe bomipesi na bandeko babango ya babali nà basi ekongenge mpo ya baye banso bazali na nzela

“Papa alendisi bango na kolanda na elikya “nzela ya kokabola epayi wapi Mokonzi akokende na bango elongo séko”


 Nabosukisi Franswa abiangi bango nabompikiliki mpo ya kolanda Yezu, oyo “azali Nzela.” Abiangi bango na kotambola kasi nakobatela “mwinda ya boyambi epela na bowumeli bwa mobembo wa bango awa o nsé”.
Papa alendisi bango na kolanda na elikya “nzela ya kokabola epayi wapi Mokonzi akokende na bango elongo séko”, yambo ete apesa bango bobenisi. Episkopo wa Roma atondi bango botondi lokola, mpona makabo mwa mobù, mingimingi oyo ya cierge pascal mp ona baziliki ya Mosantu-Yoane-ya-Latran (Saint-Jean-du-Latran).  


Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.

03 January 2025, 20:40