Liteya ya misato liboso ya Loya: monene ya Nzambe ezali moke
Mokolo ya mitano na tongo, na ndako ya makita Polo ya motoba, sango Pasolini, moteyi ya Ndako ya Papa, apesaki liteya ya misato mpe ya suka na nzela ya Mbotama na likanisi ya moke, eye ezali kosukisa te, kasi bomikitisi eye ezali kofungola bisika minene ya bokutani. Lokola lisésé ya Bosambisi ya suka elobi, na suka, tokosambisama kaka na malamu tosali te, kasi mingi mpenza na makasi na biso ya komikomisa bana.
Jean- René Bompolonga- Kinshasa
Mbotama ya Mwana ya Nzambe. Oyo na ebandela azalaki Liloba, mpe amikomisi mwana mpe bolembu lokola mwana abandi nanu koloba te: makasi mpe monene ya moke bibombani awa. Yango elobaki sango Roberto Pasolini, franciscain- capucin, moteyi ya Ndako ya Papa, liteya ya mbala ya misato mpe ya suka ya Loya (Avent) epesami na Curie romaine na tongo ya lelo, ntuku mibale ya sanza ya zomi na mibale, na ndako ya makita Polo ya motoba. Likanisi azuaki mpo na mikolo misato ya bomanyoli ezali: “Bikuke ya elikya. Mpo ya bofungoli Mbula Esantu na nzela ya esakoli ya Mbotama”.
Emekeli ebombi monene ya solo ya Nzambe
Sima ya botelemi -na mateya mibale ya liboso ya motoba mpe zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale- na bikuke ya bokamwi mpe ya kotia motema, moteyi abengi biso sik’oyo toleka ndelo ya “moke”, fungola ya koyingela na Bokonzi bwa Nzambe, elobi ye, ezali ya kosukisa te to bozangi te, kasi makasi “ya bomikitisi mpe ya kimia” lokola ya mbuma eye, na molili ya mabele, ebimi mpe ekoli. Emekeli ebombi monene ya solo ya Nzambe, oyo amikitisi na kotia motema na mosusu mpo na kokende na bokoli na ye, moke ezali “paramètre” ya Mokonzi, ezali “esika epayi wapi maponi na ye mpe bilaka na ye bikoki kosalema”, na mpe “kopona na bososoli”, ememami na “mposa ya kosala boyokani ya solosolo, epayi wapi tokoyeba mpo na mosusu lotomo ya kobika, ya kopema mpe ya koloba na bonsomi”. Na lolenge ena, kozala moke elingi koloba kofungola “bisika ya bokutani, bikosunga moko moko azala ye mpenza amibakisa na mosusu te to asukisa bomoko na ye”.
Liboso ya kosala malamu, esengeli kokoma moke
Mpo na kokolisa ezaleli ena ya motuya mpe ya makasi ya Nzambe, sango Pasolini atangi lisusu na bokebi lisésé ya Bosambisi ya suka, elobami na mopanzi nsango elamu Mateo (25, 31-46) na lolenge eye elongobami, mokanda elobi na tango ya suka, Mokonzi akosambisa mokili na lolenge ya bolingo ya bondeko. Kasi na lolenge na yango ya mozindo, moteyi alimboli, lisésé elobi ete mokolo moko bato banso, ata baye bayoki nanu nsango elamu te, bakoki kokota na Bokonzi bwa Nzambe “na kokabela esalemi epayi ya bandeko ya mike makasi ya Mokonzi”.
Na esika ena ekowuta “mokumba moko monene mpe makasi mpo na bakristu”: mposa kaka ya “kosala malamu na basusu”, kasi “ya kosunga basusu basala yango, na bolakisi bongo monene ya bomoto na bango” mpe komikomisa moke ezala “mobeko ya kokokisama na bosembo” epayi ya Nzambe. Ndimbola ya libosos ya lisésé ya Bosambisi ya suka, ezongelaki sango Pasolini, ezali eye boye: “liboso ya kosala malamu, ezali malamu mpe esengeli kokanisa lisusu komokomisa moke”.
Moke ezali likambo ya bopanzi nsango elamu
Mpo na wana, Nzambe -franciscain-Capucin abakisi- alingi te bana na ye bayeba kaka kolinga, kasi bayeba lokola komitika balinga bang ona basusu, na bopesi bango “likoki ya kozala malamu mpe mokabi”. Ezali lolenge ya kolinga na “mozindo”, akobi sango Pasolini, na lolenge ena ekotika esika na mosusu mpo ete bomoto bwa ye “emonana na ndenge esengeli”. Na bozindo, tolingi mingi mosusu tango topusani pembeni na ye “na motema petee ekoki kokweyisa” mpe ekosunga ye “kokutana mpe koyamba bolembu na biso”, na bosali “eye ezali pasi, eye ezali ya kolinga te, kasi ya komitika balinga yo”. Esosolami lokola “lolenge moko ya bomoyi” mpe ya bomoto ya kotambuisa makasi, moke ekomi “likambo ya bopanzi nsango elamu ya solo”, pamba tè ezali ekopesa na mosusu likoki ya kosala bilembo ya bolingo ya bondeko.
Ndakisa ya santu François ya Assise
Sango Pasolini atangi ndakisa ya santu François ya Assise, oyo asali moke “mobeko ya kolanda” Mokonzi mpe “ndambo ya bomoto ya bozindo ». Wana esalemi mingimingi o eleko ya bokutani kati na Poverello na sultan Malik-al-Kamil: sima ya lisolo ena, sultan abongwamaki te, kasi ayambaki François mpe asungaki ye, na bozui tango ena eye santu apesi ye mpo na kobimisa oyo ezali ya motuya kati na ye. « Bakristu, ekobaki moteyi, bazali na ‘monopole’ ya boboto te, kasi basengeli kosunga basusu ya kosalela yango ».
Kosala makasi ya kokoma yo moko na kosambisa basusu te
Sango Pasolini awumeli lisusu na likambo lisusu ya monene ya lisésé ya Bosambisi ya suka : ekobenga biso, elimboli ye, ya kokata bosambisi nionso ya bato maye malingi kosalema liboso ya ngonga, elingi koloba liboso ya bosambisi ya suka ya Mokonzi. Yango wana, mpo na moteyi, na esika ete lisésé ya “bosambisi ya mokili”, tosengeli koloba lisésé ya « suka ya bosambisi nionso », pamba te kotika kosambisa moninga na biso -eye ezali mosala na biso te- tosengeli tomipesa na oyo etali mpenza kozala « mingi mingi ofele, kobima na likanisi ya ‘nkita’ eye ekotinda biso totala nini ekozongela biso ».
Botondi esombamaka te, ezali ofele
Ya solo, na bokimi bozeli na ba mabaku malamu, mokili ekokoka kolanda nzela moko ya solo: eye ya “ofele mobimba”, na botiki kosala bilembo biye ekotinda kosomba botondi ya basusu mpe ya bokati mobeko ya kokokanisa eye emekeli ya molayi ya nzoto. Ezali se bongo, elobi lisusu sango Pasolini, ekozala na likoki ya komifungola na “esengo ya mozindo mpe ya solo”, na bolongi bobangi ya kozala na motuya te mpe na kobanda komipesa, “na bosungi basusu ya kosala lolenge ena na biso”
Motuya ya eloko oyo eyebani te
Ezali « eloko eyebani te » oyo ezali ya solo fungola mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe, eloko eye tosali na boyebi te, kasi bamisusu bakoyeba. Na yango, na suka ya bileko, -moteyi alimboli- “likamuisi monene” ekozala ya koyeba ete Nzambe « azalaki kozela eloko moko epayi na biso te, soki ezali mposa monene ya komona biso tokoma lokola Ye na bolingo ». Mokolo wana, Ekozala na ntina te « motango ya makambo ya malamu to ya mabe maye tosala, kasi soki, na nzela na bango, tozalaki na makoki ya komindima mpe ya kokoma mobimba biso moko ».
Kokoma moke mpo na bokaboli elikya
Na suka, pembeni ya Mbotama na ya Jubilé, sango Pasolini abengi biso to “pona kokoma moke mpo na kokabola elikya ya Bopanzi sango elamu” na mokili moko ezali lokola “mabe to na ntina te”, kasi oyo na bosolo ekosenga kaka kokutana “na elongi ya mawa ya Nzambe na mosuni ya bolembu, kasi tango inso ya bolingo, ya bana”. “Koleka ekuke esantu ya Jubilé na bosembo monene, ezongelaki moteyi, na komitungisa te na kobimisa elongi ekeseni na eye Eklezia ekolisi na bikeke ebele, ekoki ekozala elikya monene”. Liteya esuki na losambo ya Mobu Esantu, mpo ete gracia ya Mokonzi ebongola bato na “baloni ya molende ya mboto ya nsango elamu”, na “bozeli na elikya ba likolo ya sika mpe mabele ya sika”.
21 December 2024, 14:35