Luka

++ Kobebisa nzoto ya baninga ezali eloko ya nsoni, Tosenge bolimbisi ++ ++ Kobebisa nzoto ya baninga ezali eloko ya nsoni, Tosenge bolimbisi ++  (ANSA)

Na Beljika, Papa alendisi po na kimia, elikya mpe atelemeli ba mbemba

“Beljika ezali gbagba ya motuya po na kotonga kimia mpe koboya etumba”, Papa François alobi yango tango akutani mokolo mwa mitano 27 ya sanza ya libwa na bakambi ya ekolo Beljika mpe batindami ya lisanga ya bato. Na château ya Laeken, Mosantu Papa alobi été “boyokani na kimia bizali biloko biye bazuaka na mbala moko te”, kasi “na mosala na etinda ya kokolisa mokolo na mokolo”. Alobaki mpe likambo ya komonisa mpasi.

Jean-Réné Bomplonga - o mboka kinshasa

 

Ezali mobembo ya yambo ya Papa François o Beljika, ekolo Papa Yoane Polo ya Mibale atalaki mbala mibale: na sanza mitano ya 1985 mpe na sanza ya motoba ya 1995. “Na nzela, na elikya”, ezali liloba-lotomo ya mobembo eye ya Papa François, na “Beljika ya motuya mingi po ya kokanisa ya mikili ya poto”. Na ntongo ya 27 ya sanza ya libwa, episkopo ya Roma akutanaki na bakambi ya ekolo mpe batindami ya lisanga ya bato. Bazalaki bongo na château ya Laeken (esika eyebani ya bovandi ya mokonzi² Philippe, ya mwasi wa ye Mathilde na bana minei ya bango), bakambi ya misala, bakambi ya eklezia, na mpe batindami ya bokoko, bazalaki bongo bato 300.

Sima ya lisukulu ya botombeli boyei bolamu ya Philippe, mokonzi ya sambo ya Beljika, na ya moyangeli ya yambo ya bulamatari Alexander De Croo, Papa François abimisaki esengo na ye ya kotala Beljika, eye “ekobimisa likanisi mbala moko eloko moko ya moke na ya monene: ekolo moko ya poto mpe mbala moko ya kati lokola motema ezali kosala ya eloko yoko ya monene”, elobaki Papa. Ezuami na nzela ya bokabwani kati na mokili ya ba allemands  na mokili ya latin, esika ekolo France na Allemagne esuki, “bango nde babimisaki makanisi ya nationalisme epayi wapi etumba ebimaki, ye abimi”, elobaki Papa, “lokola esika yoko esengelaki ezala, neti bokuse ya poto, epayi nini kobandela botongi ya  nzoto, ya ezaleli mpe ya elimo”.  

Beljika ezali gbagba ya motuya po na botongi boboto  

Ekolo ezali na etando ya mabele 30 688 Km2 na bato 11 milio, Beljika ezali “ekolo moko monene te, kasi na lisolo ya ye moko” esala ete, kaka sima ya bitumba ya mokili mobimba ya mibale, Papa François azongeli, bato ya poto balembi mpe basuki, babandi nzela ya solo ya koluka boboto, ya kosala elongo na ya bosangani, bango banso batalaki mboka eye lokola esika na bango mpenza ya botiya misala ya bokambi bikolo ya mpoto. “Tokoki koloba ete Beljika ezali gbagba kati ya mokili na bisanga ya lingelesi, kati na bikolo ya ba allemands na ya ba français, kati na nordi mpe sudi ya poto”, elimbolaki Mosantu Papa. Gbagba eye ezali kosunga po ete boyokani ekola mpe bosuani bosila, epayi wapi moko moko, na monoko na ye, na makanisi na ye mpe na bindimeli na ye, esika ya kokutana na moninga mpe ya kopona liloba, bosololi na bokaboli lokola biloko ya bosangani.

Lokola esika eye ya koyekola ya kosala bomoto bwa ye lokola ekeko te to mpe esika moto akoleka te, kasi esika ya boyambi epayi wapi bato bakokende mpe bakozonga , epayi wapi bazali kofula bokutani ya ntina mpe epayi wapi bazakoluka na lisanga makambo ya kotelemisa banso, epayi wapi bazali kotonga boyokani ya sika. Beljika ezali, ndenge Papa amoni, gbagba ya solo eye ezali kosunga bato bayokana malamu, ezali kokotisa lisolo mpe kolobisa ba civilisations. Gbagba ya ntina mpo ya botongi boboto mpe koboya etumba, elobi episkopo ya Roma. Na mokili ya lelo oyo bitumba na bosuani bizali kobebisa, koboma bato ebele baye bayebi ntina ya likambo te, Papa alendisi mpo boboto na boyokani, maye “bazuaka na mbala moko te”, kasi “ na mosala na etinda ya kokolisa mokolo na mokolo, ya kobatela na molende mpe motema molayi”.     

““Lisolo, magistra vitae eye babosana, ya Beljika ekobenga poto ezongela nzela na ye, ya komona lisusu elongi na ye, ya komipesa lisusu na eye ezali koya na bomifunguami na bomoyi, na elikya po na kolonga malili ya eye etali ya bokolisi ya bato na lifelo ya etumba.””

Eklezia katoliko ya Beljika

Lolenge ya botangi na rapport ya mbula na mbula ya Eklezia ya Beljika, 50% ya bato ba Beljika bamibengi lokola ba katoliko. François akeyi bongo kokutana na Eklezia eye “elingi kozala, na botatolaka boyambi na ye na Kristu asekwi, kopesa na bato, na mabota, na lisanga ya bato mpe na bikolo elikya moko ya kala mpe tango inso ya sika" Kasi bozali eye “ekosunga moko moko pona kobunda na mikakatano na komekama, na esengo ya pete te na mawa ya mabe te”, kasi “na boyebi ete moto, alingami na Nzambe, azali na bobyiangami ya seko po na boboto mpe bolamu mpe akelami te mpo ya bokabwani na esika eloko ezali te.

Ba mbula ntuku misato maye maleki, Eklezia ya Beljika eyebanaki na makambo malandamaki ya bokutani nzoto maye maselamaki na ba nganga Nzambe epayi ya bana mike mpe mikolo baye bazali makasi te. Ezali “mabe eye Eklezia ezali kobundisa na mpiko mpe molende, na boyoki mpe kosunga baye banyokwamaki mpe na kosala manaka ya bopekisi likambo ena na mokoli mobimba.” Papa François abeleli po na bosengi bolimbisi na baye banyokwamaki na makambo wana: “Bandeko ya mibali mpe ya basi ezali soni! Biso banso tosenga bolimbisi mpe tosilisa likambo yango. Mabe wana bizali soni. Na Kati na Eklezya mabe wana bizali”, aleli Papa François.

Bozui bobokoli bana na makasi

Na kati ya bokutani ena, Papa alobi ayoki mawa na likambo ya “bozui bobokoli bana na makasi” “maye maselamaki lokola na Beljika kati ya ba mbula 50 mpe 60 ya bonkama elekaki.” “Na masolo wana ya mpasi”, elobi Papa François, “esangani mbuma ya bololo ya bosali mabe  na eye ezalaki na mawa mbuma  ya likanisi epanzanaki na bato banso ya ekolo, esalaki ete baye bazalaki kosala lolenge ya likanisi  ena bakanisaki na makanisi na bango kosala malamu, epayi ya mwana to ya mama”.  Mokitani ya Petelo asambeli mpo ete “Eklezya ezua tango inso makasi ya kobongisa mpe ya kosala te lokola bato balingi, ata soki lolenge ena -na botambuisi yango- kowuta na makambo ya ntina ya Nsango elamu po na bozui maloba ma nsuka ya mabe, na bilembo na yango ya mpasi mpe ya bokabwani.”  Asambelaki po na bakambi ya bikolo mpo ete na botali Beljika na lisolo na ye “bayeba kozua liteya mpe babikisa bato ya mboka na bango na minyoko masilaka te na matanga ebele.”

““Nakosambela mpo ete bakambi ya bikolo bayeba kokumba mikumba na bango, likama mpe lokumu ya boboto bayeba mpe kolongola likama, bosoni na makambo ya bitumba biye bizali na ntina te. Nakosambela mpo ete babanga bokati likambo ya makanisi na bango moko, ya lisolo mpe ya Nzambe, mpe babongola miso na bango mpe mitema, na botiaka liboso mpenza bolamu ya banso.””

Elikya

Beljika asenegli na elikya. Mpo na episkopo ya Roma, “ezali lokola mokumba  batiaka na mokongo te mpo na mobembo, te, elikya ezali likabo ya Nzambe, ekumbamaka na motema.”  Na bosukisi lisukulu na ye, Papa apesi likanisi liye na bato ya ekolo Beljika mpo “ntango inso basenga mpe bazua likabo ena ya Elimo Santu mpo ya botamboli na elikya na nzela ya bomoyi mpe ya lisolo.”   

Botondi na ndenge otango mokanda eye. Soki olingi ozala natango inso na basango, mikomisa na mokanda na biso ya sango na esika eye 

01 October 2024, 17:34