Cyclone Chido : “Mayotte ekozua mbula zomi mpo etelema”
Ngonga ekomi ya kotanga na Mayotte mpo na kosunga baye bazui mpasi sima ya boleki ya cyclone eye ebomi bato na mokolo ya poso zomi na minei ya sanza ya zomi na mibale. Na botangi ebele ya bato ekosakolama esengeli kobakisa likambo ya kozanga bilei n’archipel ya France, elimboli Marc Bulteau, motindami na Mayotte ya Secours catholique- Caritas France.
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Na mokolo ya liboso zomi na motoba ya sanza ya zomi na mibale, motango ya suka ya bato bakufi esali ntuku mibale, kasi ekoki komata na ba nkama ebele, lolenge bakonzi balobi. Bato bazali kokoba kokoma n’Archipel ya France na elikya ya bozui bato babiki bazali na nse ya biloko bikweyaki, ngonga ntuku minei na mwambe sima ya boleki ya cyclone Chido.
Marc Bulteau azali motindami na Mayotte ya Secours Catholoique. Sik’oyo akangami n’Anjouan, esanga ya Comores ezali na ba kilomètres nkama na Mayotte, motindami ya Caritas akosolola ntango inso kobanda ngonga ntuku minei na masanga na ye bizali kuna baye bakotatola lolenge ya « apocalypse ».
Ba nsango nini ozui na eye ezali koleka na Mayotte?
Ezali lisusu catastrophe te, ekomi apocalypse, ebongi te kobanga kobimisa maloba masengeli. Bamisusu bazali kokokanisa yango na ba mboka babuaki ba bombes. Tozalaki na bato nkoto nkama moko bavandaki na esika esengeli te, elingi koloba ba bidonvilles, mpe nyoso wana ekweyi, eloko moko te etikali ya kotelema. Wana elingi koloba ete lelo bato nkoto nkama moko bazangi esika ya kovanda, mpe mingi kati na bango bazali ba migrants “bazangi mikanda”, mpe mingi balingaka kokende na bisika ya bokengi te maye masalemi na bulamatari pamba tè bazali kobanga babengana bango.
Mpo na oyo etali esika ya kovanda ya malonga, ata bandako bitongama na ba normes antisismiques bininganaki. Nayebi te soki botalaki ba ndako ya Mayotte. Ya Liboso Ezali chaine ya télévision ya bango, eye ndako ewutaki kofungwama na ba normes ya sika mpe eninganaki makasi
Tozali na ba ndako bebo ya leta maye maningani, ba casernes ya ba pompiers, hopitalo…Esika ya pepo ya Mayotte-Dzaoudzi ebebi makasi, tour de contrôle ezali kosala lisusu te, kaka ba pepo ya ba soda bikoki kokita kuna.
Ba nzela ya ebale, elingi koloba maye bizalaki kosangisa Mabele ya Monene na Mabele ya Moke, bisanga mibale ya ntina ya Mayotte, bizali mingi kosala te, mpe mibale maye matikali bizali kosunga mpo na bokumbi biloko na lombangu mpe ya komema biloko ya kosunga bandeko.
Motango ya bato bakufi ezali ngonga eye ya ntuku mibale kasi bakonzi bazali kobanga eleka ba nkama…
Wana ekozala mpasi mingi ya kotanga mpo na makambo mibale, ya liboso ba migrants bazali na mikanda te bakopusana pembeni ya bakonzi te mpo na koloba motango ya bato bakundami maye bango bamoni. Ya mibale, lokola tozali na mabele ya Islam, mpo na bato ebele, bato baye bakufi basengeli kokundama na ngonga ntuku mibale na minei, mpe ngonga ntuku mibale na minei bisili bilekaki. Wana, tokolikya mingi na maloba ya bato bamonaki mpo tozua motango eye ezali mosika te na eye ya solo kasi na lolenge inso ekozala mpasi.
Kobanda mokolo ya liboso ya poso, masungi bikobanda kokoma na esanga mobimba, mpe na bosolo bakomona na nse ya biloko bikweyaki motango ya bato bakufi, koloba te ya baye bazoki makasi. Bazali ebele, lopitalo etondi sik’oyo na bato bazali koluka lisalisi na lombango.
Wana, likambo ezali solo y’apocalypse, na bokati mayi, bokati lotiliki mpe koyiba. Na lombangu makambo mibale ya monene bikobima: bozui mayi elamu mpe bozui eloko ya kolia.
Bato ya mosala ya kosunga bakomi bongo na ngonga ya kotanga, pamba tè sima ya likambo boye, ngonga moko moko ekomi na ntina?
Nyoso ezali mpasi. Kasi esengeli te kobosana ete bato ya liboso ya mosala ya kosunga bizali bana mboka bango moko. Bokoloba tango inso ndambo ya bato ya mosala ya kosunga mpe ya ba pompiers bakowuta na France, na Réunion to bipayi misusu, kasi esengeli te kobosana ete basali ya liboso ya kosunga bizali bana mboka bango moko. Nazali komona basali ya biso moko ya Secours Catholique, bazui ata tango te ya kotala maye bizali koleka bipayi na bango moko, na ndako ya bango moko, mpo na boluki ba nsango!
Lisusu, ebakisami na wana likambo ya kozala esanga. Tozali, na botali likama ya boye, na bato basengeli te na bokengi ya mboka. Likambo ya pepo ezali sik’oyo mabe, kaka ba pepo ya ba soda bikoki kokita. Bongo masuwa bikoki kozua mikolo na mikolo liboso ya kokoma. Wana, esengeli kolikya na bomipesi mpe na bokasi ya bato pamba tè, mpo na manso, soki tolingi tobikisa bato, ezali na mikolo misato te, kasi sik’oyo.
Lolenge nini bato bamipesa na bolingo ya bango moko ya Secours Catholique na Mayotte bazali?
Na esika ena tozali na bato mitano bazuaka lifuti na suka ya sanza mpe pene na bato ntuku mwambi bamipesa na bolingo ya bango moko, mpe tozali kolanda kati na bato nkama misato kino nkama minei. Moke moke, tobandi kozua ba nsango mpe, Nzambe azua lokumu, sik’oyo ata moko azoki te, akufi te kati na bato bamipesa na bolingo ya bango moko. Kasi, mingi kati na bango bazalaki kovanda na ba bidonvilles mpe bazali lisusu na ndako te. Likambo ya liboso ya biso ezali ya kotanga bango, ya bozongeli bokutani na moko moko, ya botali ba mposa na bango, mpe kosala bongo na bato baye toyamba.
Ozali kobanga likambo ya bozangi bilei mpo na bato ebele?
Stocks awa bizali moke makasi. Ba pepo bikomema ba nkisi mpe na eye esengeli, kasi mpo na nyoso etali bilei, tozali na ba mposa minene maye bikoki kokoma kaka na masuwa, kasi masuwa bikozua ngonga ebele mpo na kokoma mpo tozali na suka ya mokili.
Tokozua, ndenge namoni, mbula zomi mpo na kobima na likama eye, pamba tè ezali cyclone ya monene kobanda na bokuse 1934. Mayotte akosala koleka mbula zomi mpo abima ya libela na likambo eye eleki pamba tè sima ya ndako, ezali lisusu na eye etali molongo ya bokengi mpo na bilei. Milona bibebi, eloko ezali lisusu te! Biloko ya kolia, ba nzete ya mbuma bikweyi. Ezali mpenza likama. Yango ekokaki kozala mabe te, cyclone elekaki likolo ya Mayotte.
17 December 2024, 15:54