Luka

HAITI-CONFLICT-RIGHTS-VIOLENCE

Haïti ekosenga bozongisi ya niongo na ye ya lipanda

Mokambi ya sika ya Conseil ya transition, Leslie Voltaire, asengaki mpo na bozongisi ya niongo ya lipanda eye Haïti afutaka na France kobanda 1825 kino 1883. Esengeli moko ekolakisa bosengi ya Papa François o eleko ya Jubilé 2025: bolongoli niongo ya bikolo bizangi.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Nioka ya solo ya ebale na boyokani kati na France mpe Haïti, bozongisi niongo ya lipanda eye Haïti efutaka na France esengami lisusu na mokambi ya Conseil ya transition ya Haïti.

Bozangi bosembo ena toyebi ndenge tokoki kobenga yango te ezali mpota eye ekotika kotungisa molimo na biso te. Mpe likambo ya mawa, bofuti ba rançons bina ebebisaki na lolenge moko makasi lolenge ya kotombola ekolo ezalaki nanu moke”, abetaki nsete mokolo ya yambo ya sanza ya liboso ya mbula eye, mokolo ya nkama mibale na ntuku mibale na moko ya bokanisi lipanda ya Haïti.

 

Libula moko (un héritage) ya lisapo

Koloni ya France na kombo ya Saint-Domingue kobanda 1697, Haïti azui lipanda na ye na nzela ya bitumba na 1804, France ekozonga na 1825 : motindami moko ya mokonzi Charles ya zomi ayaki elongo na molongo makasi ya basoda, etindi na makasi mbulamatari ya Haïti kondima mpe kofuta niongo ya bozongisi mpo na France.

Ntalo ya bonsomi : milio nkama moko na ntuku mitano ya francs-or, bakitisaki yango lisusu na milio ntuku libwa, ekolakisa lelo, engebene na New York Times, motango ya milio nkama mitano na ntuku mibale na mitano ya euros na botali mosolo ya lelo. Pamba tè esengeli kobakisa matomba ya niongo ena. Ezali mpenza bongo, kombo ya «double dette» ewuti na lolenge bana ya Haïti basengelaki kodefa mbongo na France mpo  na kofuta niongo ena, mpe bapesaka bongo matomba.

Ntango azuaka bokonzi na 1991, sango ya kala Jean-Bertrand Aristide, mokonzi ya liboso alonga maponami na ndenge elongobani nsima ya bokonzi ya mabe ya ba Duvalier, ezali mongongo ya yambo ya kosenga na France mpo azongisa mbongo wana na Haïti.

 

Bosengi ya eleko inso ya ba papa

Ndakisa ya Haïti ekolakisa polele mikakatano ya bikolo bizangi ya bokoli ntango batungisami na niongo, mingi mpenza na maboko ya bikolo bizali na mosolo. Papa François azongelaki lisusu ntina ya kolongola niongo ya bikolo bizangi, na bulle d’indiction ya Jubilé ya elikya, Spes non confundit: “Soki ya solo tolingi tobongisa nzela ya boboto na mokili, tomipesa mpo na kobongisa makambo bizangi bosembo ya mozindo; tofuta ba niongo ya sembo te mpe bikofutama te mpe totondisa baye bazali na nzala”, ekomaki ye.

Likanisi eye ezali ya sika te, kasi ezali lokola koyokana te. Na yango, o eleko ya Jubilé ya mbula nkoto mibale, santu Yoane Polo ya mibale alimbolaka ete kolongola niongo ya bikolo bizangi ezalaki koluka “likambo ya kobongisa bato mpe ya bokoli”.

 

  

03 January 2025, 18:18