Ba episkopo ya Tchad bapameli bokoteli bitumba na yoko mampinga
Jean-René Bompolonga- Kinshasa/Congo
Bokoteli na bitumba ya mbalakaka, na butu ya mokolo mwa eyenga tii mokolo mwa liboso 28 ya sanza ya zomi na esika mampinga bavandaka na esanga ya Barkaram, na etuka ya etima Tchad, esali bongo « bato 40 baweyi mpe 37 bazoki, bazali kaka na bomoyi », elobaki ministre ya yambo ya par interim ya Tchad, Abderahim Bireme Hamid, na bokutani esalemaki na bapanzi nsango na Ndjamena. Na botali mabe ena lisusu, ba episkopo ya Tchad babimisaki kolela mpe mpasi na bango, na kopamelaka makasi makambo wana ya mabe koleka, maye bizali kokotisa matanga na mabota ya ekolo eye etungisami na makambo misusu ebele, lokola ba mpela tango inso.
Lisanga na molimo ya ba episkopo ya Tchad
“Natomboli miso epayi ya Nzambe, epayi wapi libiki ekokomela ngai? Libiki ekowuta epayi ya Nzambe oyo akeli likolo na mabele”. Na esika oyo ya buku ya nzembo 121 nde ba episkopo ya Tchad batombelaki mawa na bango na bana mboka, mpe na lolenge ekeseni na mabota maye bizui matanga, na kosambela “ete Nzambe, na mawa na ye apesa bopemi ya seko na baye bakufi, abikisa baye bazoki mpe abondo mabota bizali na matanga”. Na eleko ena, ba episkopo bakati mokolo ya “losambo mpo na baye bayoki mpasi, mabota na bango mpe na boboto o ekolo”. Losambo ena ekosalema na ba ndako ya Nzambe mokolo mwa poso 2 ya sanza ya zomi na moko ya mobu 2024.
Bokoteli bitumba esusu
Bokoteli bitumba ya 28 ya sanza ya zomi elekaki ezali ya liboso te. Basoda ya Tchad bazali kobundisama mbala ebele na bato ya Boko Haram na etuka ena, esika monene ya mayi mpe zamba ya mozindo etondisami na ba esanga, eye ezali kobomba batomboki ya lisanga ya jihad to mpe lisanga ya baye bakabwani na basusu, bulamatari ya islam n’Afrika ya westi (Iswap, lolenge ekomani n’anglais). Na sanza ya misato ya mobu 2020, lisanga ya batomboki babundisaki makasi na esika esusu mampinga ekovandaka na etuka ya etima ya Tchad, na bobomi bato nkama, mampinga ya Tchad bibungisa nanu bato lolenge boye te. Bakani kosilisa likambo ya mpasi ena, mampinga ya Tchad bibongisi mokolo ya liboso ya poso mosala moko mpo na kosilisa makasi ya Boko Haram mpe ya baye basangani na ye. “Ezali bongo ya boluki, kobimisa mpe kosilisa makasi ya Boko Haram mpe ya baye basangani na ye”, elobaki ministre ya yambo.
Mbela mpo ya lisungi epayi ya bikolo bisusu
Boko Haram asili abomi bankoto ya bato na bikolo ebele y’Afrika ya westi. Botomboki ya lisanga ya Islam ebandi na 2009 na Nigeria, epayi wapi banda mobu ena, bato ata 40 000 bazui liwa mpe koleka ba milio mibale bakimi bisika na bango. Ezali mpasi ya kobunda na lisanga ena mpo na lolenge batomboki bina bazali kotambola mingi, mpe basili bapanzani na bikolo ya pembeni.
Mokonzi ya maye bikotalaka makambo ya bapaya, Abderaman Koulamallah, azongelaki mokolo mwa liboso ya poso mbela ekolo na ye etindaka na bikolo bisusu mpo na kopesa lisungi ekoki na etumba na ye na batomboki ya jihad, na bolobaka ete “mosala ya lisanga mpe ya makasi esengeli mpo na kosilisa mabe eye ezali kobebisa kimia mpe bokoli ya etuka mobimba”. Toyebisi ete matanga mpo na ekolo mobimba ya mikolo misato epesamaki na mokonzi ya ekolo kobanda mokolo ya mibale, ba bendele bikokita mpe epekisami makambo nyoso ya bosepeli.
Episkopo wa Roma asukisaki mateya nakoyebisa banso ete “bansambela mpo ya kosekwa elongo na yé” mpo na “kosepela bobele elongo na basantu banso”.
Botondi na ndenge otango mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango nakofina esika eye