Lisanga ya bakambi banene bya mangomba ya RDC Basali liyangani lya bango ya yambo
Albys KBD nà Jean-René Bompolonga – O mboka Kinshasa/RDCongo
Cosuma esalemaki na mobu 2021 na bosangisi bya masanga mibale ya mibali mpe basi, mpo ya kokokisa makasi esengeli mpo na kopesa eyano na lolenge elongobani na mikakatano mya mosala ya komibonza na RDC. Esangisi bongo bakambi banene bya mangomba mpe ya baeyékwelo bya bamibonzà ya lisanga ya kala ebiangemaki na kombo ya Asuma; Association des supérieurs majeurs (mpo na mibali), mpe lisanga Usuma; Union des supérieures majeures (mpo na basi). Mpo na liyangeli linene ya yé ya yambo, esangisi bamibonza monkama moko na tuku libwà na mitano (185) mpo na kotalisa bakambi ya mangomba monkama misato na misato (303) mpe baeyékwelo ya bamibonzà. Sima ya mibu misato na bokambi bwa lisanga lina, mokambi ya liboso ya Cosuma, Sango mokonzi ya bajésuites ya Eteni y’Afrika ya katikati (esangisi bongo RDCongo nà Angola), sango Rigobert Kyungu, apesaki motango mwa mosala mona kati na lisolo azuaki na Radio Vatican- Vatican News. Tokosenge bino bolanda mobimba bwa lisolo lina.
Sango Rigobert Kyungu, ozali mokambi ya liboso ya Cosuma. Bilan nini okoki kopesa, sima ya mibu misato okambi lisanga lina?
Bilan ezali, malamu mpenza, lolenge namoni, pamba tè ezali likabo ya Nzambe. Tango naponamaki lokola mokonzi eleki boye mibu misato, nayebaki ete ezali mbela ya Nzambe. Tembe te, oyo ekowuta epayi ya Nzambe ekweyaka soki moke te. Nzambe oyo aponaki ngai atambolaki na ngai elongo. Naponamaki ngai moko te, tozalaki mibale, molandi na ngai, mamelo Rita Yamba, mokambi motindami ya ba Filles de Saint Paul na eteni ya Afrika oyo elobaka monoko ya lifalansa, Congo na Cote d’Ivoire. Tokotondo Nzambe botondi lolenge atamboli elongo na biso. Atikaki biso soki moke te.
Ezalaki mbala ya yambo bomeki liyangani lina. Liboso, ezalaki masanga mibale, Asuma na Usuma lolenge tolobelaki yango likolo. Tosangisaki myango eleki mbula misato mpo na kokela eloko ya sika, Lisanga ya bakambi(bakonzi) banene bya mangoba, lolenge ezalaki bosenga ya Roma. Ezalaki tango moko ya kitoko mpe esengo makasi, kosala elongo (kosala na lisanga), nà mpe ya bosungani, Moko na moko amemaki eloko ya yé ya makasi mpo na kotia lisanga. Totiaki nyoso esika moko: maye matali mosolo na biso, maye matali mabele na biso, na biloko na biso, etc.Yango esungaki biso mpo na kosala lisanga, ya kokende liboso elongo. Lokola na biyele: “Bomoko ekopesaka makasi”. Nakoloba yango lisusu ete tosalaki likambo moko ya synodalité, na baye tokitani, na Dicastère mpo na mosala ya bamibonza, na Conférence episcopale nationale du Congo, na ntoma ya papa. Elakisami likambo moko ya esengo. Tobetaki nsete mingi mpo na botangisi mpe botatoli ya bamibonza kati na bato, bongo nyoso esali ete motango na biso ezala malamu koleka.
Na ebandeli ya mokumba na bino, bomipesaki mikano misato: kotiya bisaleli ya makasi mpo na mosala elamu ya lisanga, kotelemisa bamibonza ya Congo mpo na balanda likambo ya synode mpe kotombola lolenge ya bomoyi ya losambo na Afrika. Sima ya mibu misato, omoni ete mikano mina mikokisami?
Namoni ete mikano mina bikokisami. Tobanda na bisaleli. Tobandaki liboso mpenza kosala mibeko pamba tè ezalaki lisanga lya sika, esengelaki kobongisa mibeko ya sika. Ezalaka mosala moko makasi. Totambolaki elongo na ntoma ya papa, na mpe Dicastère mpo na bamibonza, oyo andimaki na sima mibeko mina, ezalaki esengo monene mpo ya biso. Kaka na likambo ena ya bisaleli, tosalaki na ba provinces ecclésiastiques. Ezali motoba na Congo. Province ecclésiastique moko na moko esangisi ba diocèses ebele. Tosalaki na ba provinces ecclésiastiques bipayi wapi tozuaki bisaleli ya kopikama. Tosalaki organigramme ya lisanga ya biso: comité directeur, eye esangisi ba ntoma ya ba provinces ecclesiastiques; comité restreint moko evandi na Kinshasa; mpe ba comités ndenge na ndenge kati ya ba provinces ecclesiastiques, na mpe na ba diocèses. Mpo na bisika, tozali na mango bebo na Kinshasa.
Bongo mpo etali mosala ya bamibonza ya Congo na synode?
Tobongisaki lisolo na eye etali Lineamenta, elingi koloba mituna mitindamaki na ba diocèses. Bamibonza bapesaki bongo lisalisi na bango. Epayi mosusu, tosalaki na oyo etali lolenge ya kozala banzeneneke (kotatola) ba motuya ya bamibonza, na malamu to na mabe kati ya ekolo ebungisà mabongi. Tokolemba te kobeta nsete, mingi mingi na likambo ya koyekola, mpo ete bamibonza bazala ntango inso mwinda eye ezali kopelisa ekolo.
Lolenge nini okoki kolobela likabo Cosuma amemi na bomoyi ya Eklezia mpe kati na ekolo ya Congo?
Cosuma ezali kosala, kaka kati na Eklezia mpamba te, kasi mpe na ekolo. Nakobanda kotanga makambo manene: mobembo ya bokitani bwa bantoma ya Papa na ekolo na biso. Bamibonza ya lisanga na biso basalaki makasi mpo ya kobongisi ekwela ena etikali na lisapo, mpe ezalaki elonga. Totikali na bilembo kitoko ya boleki ya Papa na ekolo na biso. Tosungaki mpe makasi lisusu na mosala ba tata wa biso ba episkopo, mpo na bosungi mosala ya lisanga ya ba papa episkopo, kati ya ekolo mpe o kati ya ba provinces ecclésiastiques. Tomemaki lisungi mpe na congrès eucharistique national oyo esalemaki na Lubumbashi. Mpo na biso moko, tozalaki tango inso na milulu ya bokulisi ba episkopo na ba diocèses ndenge na ndenge. Wana nyoso ezali kolakisa mosala na biso kati na Eklezia. Topesi makoki manso mpo na kozala wana mpe kolakisa bomoko na biso, te tozali lisanga na Eklezia. Biso, elingi koloba présisence nationale, na kombo ya Cosuma, na mpe lokola ba conférences bisika bizwami. Na libaku lina, tozalaki kosala masanga nà ba mibonza na bsika tokendeki, bisika tozwamaki.
Mpo na maye matali bomoyi bwa ekolo, ezali malamu koyeba ete bamibonza o kati ya ekolo na biso bazali bipayi binso. Ezali ekolo enene ekotanga ba diocèses 48, bizali na ba engumba na mpe ba mboka. Kokende na ba engumba ezali mpasi mpo na lolenge banzela ebebà. Atako bamibonza bazala kuna. Elanga mosusu ya mosala na biso ezali kotangisa mpe kobikisa bakoni, na boluki ntango inso kopesa litatoli ya malamu.
Tozali kobeta sete mbala mingi epayi ya bamibonza mpo na likambo ya litatoli, mingi mingi na likambo ya bomoko. Na Afrika mpe na ekolo na biso, likambo ya bitùlùkà(kokabola bikolo) bizali kolobama mingi na bomoyi ya politiki, na bomoyi kati na bato. Tozali koluka na ndenge ekoki kotonga masanga ya mokili mobimba, masanga mazali kosangisa bamibonza ya ba etùka bikeséni. Eye ezali litatoli monene, litatoli malamu. Litatoli lina esengami na ba mayangani manene ma biso to na ba maponomi bya bamangomba bya biso. Tozali kobunda mpo tokweya te na maye tozali kogangela bato ya politiki: kopusa na botomboki, kopono bilongi, kokabola bikolo, mpe ndenge na ndenge… Tozali kekengele mpo ete maponomi maleka na molimo ya malamu.
Soki totali lobi ezali koya, mikakatano nini mizali kolata Cosuma mpe mobimba bwa mosala ya kimibonza o kati ya ekolo ya R.D. Congo?
Lokola nawuti koloba yango na motuna ewuti koleka, moko ya mikakatano mpo na mosala ya kimibonza na ekolo na biso, ezali ya solo bomoko mpe, nakoki kobakisa boyokani. Bisika bato bazali kokabola bikolo, tolingi tozala bilembo ya bomoko mpe ya bosangani. Mokakatano mosusu, ezali ya botangisi: kotangisa bamibonza na bakelasi bya ntina, mpo ete bamibonza balongobana na misala mya bango. Na lisungi ya Fondation Hilton, tozwaki libako lilamu ya kokoba kobongisa kotangisa bamamelo; kasi mokakatano mosusu ezali koluka kotangisa basusu koleka, mingi mpenza baye bazali kozwua ndingisa na badiocese. Mokakatano mosusu ezali ya ba enguma, lokola na limbolaki, Ba mboka ya ekolo na biso bizali na mpasi mpo na ndenge ya kokomela kuna, mpo nzela ezali mabe. Bamibonza baye bazali na ba etùka bazali na mpasi mpo na kokende kuna.
Tozali na lotomo ya kokende bipayi binso, na ba 48 diocèses na biso, mpe ezali liseki te mpo ya kotambola na ekolo na biso. Mpo na kosukisa, bilenge ba biso bazali kokutana na mabungisami o mokolo miye. Lokola boyebi, bilenge tokoyamba o nzela ya kimamelo, bawutaka na bisika tozwami. Ezali bilenge bazwami na mabulungani ya ba réseaux sociaux mpe ya mitindo nyoso wana. Kokamba bamibonzà ya solo mpenza, bamamelo basi, bawuti bipayi bina, ezali mokakatano moko monene. Mikakatano misusu mizali kasi namoni nakosuka na wana.
Sango Rigobert Kyungu, ozali mokambi ya Cosuma oyo azali kolongwa. Ozali na liloba ya suka mpo tosilisa lisolo lya biso?
Liloba na ngai ya suka ezali ya botondi. Nakotondo botondi baye banso basungi biso na mibu misato mya mosala mpo ya lisanga ya bakambi banene bya mangomba ya ekolo ya Congo. Na pesi melesi basangani ya bacomité ba biso mpe bakambi babali nà basi ya ba provinces ecclésiastiques, bamibonzà banso ya ekolo na biso, nà baninga babiso bya mosala, baye basungi biso mingi mingi na likambo etali mosolo. Mpamba te, tokokaki te kosala maye manso tosala. Masanjoli ba biso mpe lokola, na mokambi ya biso wa molongo, Lisanga ya ba episkopo, Dicastère, ntoma ya papa mpe nà baye banso basalaki na biso elongo. Nakobakisa lisusu ete natombeli bakitani ba biso eleko ya mosala malamu na makabo Nzambe apesi biso, bayangeli basika ya Cosuma ya Congo. Nzambe azala na bango lokola azalaki na biso.