2024.11.04 Chappelle ya Papa, bopesi lokumu na ba Episkopi mpe nà batata Episkopo wa lokumu bawà 2024.11.04 Chappelle ya Papa, bopesi lokumu na ba Episkopi mpe nà batata Episkopo wa lokumu bawà   (Vatican Media)

Misa mpo ya ba episkopo nà batata wa lokumu bawà: Kokundola ezali kozongisa o motema

Okati ya basiliki ya Mosantu Petelo ya Roma, esalemi na Misa moko mpo ya kokundola batata Episkopo wa lokumu mpe ba Episkopo bawàki o eleko mwa mobu moye. Na libaku lìna, Papa François azingisi mateya mayè na mosala ya “kokundola (kokanisa)” eye elimboli “kozongisa to komema o motema”. Abiangi bato basambela mpo ete bawèi bìna “bayeba kosepela elongo na basantu mpo ya seko (libela)”

Albys KBD cp – O mboka Kinshasa/RDC

 

Mpo ya kobanda mateya mayè, Papa François atondisami na makanisi mpo ya maloba mansuka malobaki moko wa babale babàkaki elongo na yé o kuruse, “Yezu, kanisa ngai tango okozonga o bokonzi bwa yo” (Lc 23, 42). Maloba moyengebene Papa, makomeli biso na nsango elamu, masolo matondisami na bosolo. Mpo ya Mokonzi monene, “moto oyo bakatelaki etùmbu, alimboli nde biso banso” na yango “tokoki kopesa ye nkombo ya biso”. Tokòmisa ya biso lolàka la ye: Yezu o kanisa ngai, batela ngai kati na bomoyi bwa yo, ebakisaki ye bongo.

Bokundoli (bokanisi)

Episkopo wa Roma asengi bandimi komaniola maloba maye. Tembe te “bokundoli elimboli komema o motema, kozongisa na motema”. Engebene na François, moto “abakemi na kuruze na Kristu elongo, abongoli bolozi ya yé na losambo”. Mokonzi monene akobi nakoyebisa bato ete moto oyo bakatelaki likambo aweyi “lokola moyekoli ya eleko ya nsuka” na boluki bòngò “motema eyebi koyamba”. Mokonzi akoyokaka losambo la mosumuki tee na nsuka sé bòngò.

Mpo ya Papa ya bayiArgentin, Motema mwa Kristu “mozokisamaki mpo ya bolozi”, efungwami “mpo ya kobikisa mokili”. Mpamba te “na liwa ya yé, akoyamba lolaka ya baye banso bazali kokufa”. Yezu akokufaka elongo na biso, nzokandé akufi mpo ya biso, ebakisi François.

Papa alobi lisusu ete, “likanisi ya Yezu ezali na bokasi mpamba te yé atondi nkita na Ngolu”. Abakisi lisusu ete, “bomoyi bwa moto bokozima kasi bolingi bwa Nzambe ekobikisa na liwà”. Tembe te “mòto bakatelaki likambo asikolami, mompaya akomi moninga motikali”. Oyo ezali ndé “bokutani na bokuse onsé ya kuruzé”, “ekolandisama bobele na boboto”, elobi François.

Bolìky bwa libìki

“Lolenge nini bato bayingeli o mitema mya biso? Boni boni tokokundolaka baye baleki biso pembeni o bikwela bya bomoyi?”. Mosantu papa asali mituna mìna mpo yakomeme bandimi bamitala na “lolenge” mpe “lokola” bakoki “kokanisa bato mpe biloko”. Tokoki kokundola ba mbeba, kokanisa bikuke tobongisa te, kokanisa baninga mpe banguna”, elobi Papa.

“François alobi lisusu ete, “soki bato na bibélé bazongisi motema epai na Nzambe, bakoki kolìkya libìki, ata ko o miso ma bazangi mayele (ma bazoba), elobi papa, emonani te bakufi” (Sg 3,2).”

“Makanisi ma Nzambe makobombaka masapo manso”

Papa atatoli ete “makanisi ma Nzambe makobombaka masapo manso”. Abeti mpe nsete na “likambo likotala kosambisa bwa Nzambe ya mawa mpe Ngolu ya yé”. Kaka na libaku lìna, Papa François abiangi bandimi banso basambela makasi mpo ya batata Episkopo bya lokumu mpe ba Episkopo bawàki o eleko mwa sanza zomi na mibale moye moleki. Lelo likanisi lya biso ekomi lokumu tokopesa baye bazali bandeko babiso. Baponami ya bato na Nzambe, ba batisamaki na liwà lya Kristu” (Cf. Rm 6,3), elobi ye.

Episkopo wa Roma asukisaki mateya nakoyebisa banso ete “bansambela mpo ya kosekwa elongo na yé” mpo na “kosepela bobele elongo na basantu banso”.

Botondi na ndenge otango mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango nakofina esika eye  

04 November 2024, 12:25