Luka

2024.12.24  Milulu mya bofungoli Ekoteli Esantu na Baziliki ya Mosantu Petelo 2024.12.24 Milulu mya bofungoli Ekoteli Esantu na Baziliki ya Mosantu Petelo  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Misa ya butu ya mbotama mpe libandela ya mobù ya ngrasya, bozongisi sika (kobongwana) mpe ya elykya.

Yambo ya kosala misa ya butu ya mbota, Pàpa Franswa afungoli Ekoteli Esantu (Porte Sainte) ya baziliki Saint-Pierre, abandisi bongo Jubilé 2025 etiami na thème ya elikya. Mabongi moye ya bokristu elongobani te na bogoigoi mpe ekotuna moto nà moto na “kokoma bato bamobembo bakolukaka bosolo”, elobi mosantu papa na mateya mya ye. Bandimi ba mokili mobimba ba biangemi na nzela ya boleki ekotelo esanto mpe kofungola monene bikoteli na kristu.

Albys KBD cp – Congo Kinshasa

 

Na Kimya inso mpe na losambo, mokitani wa Petelo afungoli bikuke ya motako ya ekoteli esantu ya basiliki ya mosantu petelo, ekokotisa bongo bakatoliko ba mokili mobimba o Mobù Mosantu 2025. Ekoteli ena ezwami na nsuka ya loboko la mobali ya basiliki ya vatican, ekotikala ya kofungwama kin’o mokolo mwa motoba (6) ya yanuali 2026. Ba yi-mobembo bakolekela yango, mpe baye mineyi ya Cité éternelle, baleka bongo na lisumu kin’o na ngolu. Ndakisa epesami na bandimi tutu mitano na ineyi (54), ya mibu minso misangani, bawuti na ba kontina inso mitano, balandaki bongo bitamé bya Mosantu-Papa o milulu mya mokolo tuku mibale na ineyi (24) ya desembere, nzembo ya Jubilé eyembamaki, mpe elandaki batata wa lokumu, banganga-nzambe, bamibonzà mpe basangani ya Curie romaine

Oboso bwa bandimi nkoto motobà (6 000) na kati ya baziliki mpe baye basanganaki libanda na etando ya Mosantu-Petelo (Saint-Pierre), apesaki mateya mayé na elikya ya mbotama ya mwana Yezu amemaki, « akitaki o kat iwa biso mpo ya kotombola biso mpe koyela biso yambi ya Tata ».  « Bongo soki Nzambe akoya epai ya biso, tango motema mya biso ekokani na eleyelo ya baniama, tokoki koloba ete: elikya ekufi ye, elikya ezali na bomoyi, mpe ezipi bomoyi bwa biso mpo ya seko ! »

Na ndakisa ya bakengeli mpata ya mboka Beteleme oyo « bazelaki te kotambola o nzela » sima ya esakola ya mbotamà ya mwana Yezu, Monsantu Pàpa abiangi bandimi nako tambola « kozanga kowumela » na bolukiluki ya elikya ebungi mpo ya « kolona yango na batango ya mawa ya bomoyi mpe mokili ya biso», mpe na kobongola yango « na makambo ya bomoyi bwa biso » 

Elikya, elongobani te nà mabé mpe na boséndé(bogoigoi)

Papa Franswa abiangi nako bulunganisa te boliky ya mokristu nà “mwa esengo ya ngonga moke tokozelaka lolenge ya mabé”. Kutu abeti nsete, awa asepeli eyenga ya mbotama mbala ya zomi na mibale o kati ya vatican, nakosenge bandimi bamikangisa te na ezalela ya bango ya mabé mpe na boséndé na bomoyi, kasi « koboya mpe koluka kobongolo myango ». Elikya ekosenge biso « tokoma ba yi-mobembo bakolukaka bosembo, bato bakolembe te, basi mpe babali bazali na esengo ya komibulungisama na ntina ya Nzambe, na likanisi ya mokili mwa sika, epayi wapi kimya mpe bosembo bikoyangela ». Na yango, episkopo wa Roma, akobondo na ndakisa ya bakengeli mpata ya Beteleme, mpo été lokola bango, elikya ya biso etambola elongo na mosala ya bontoki mpe mawa ya bato.  

Mokumba ya komema elikya bisika bibungisami

Mabongi ya elikya, eponami lokola moto ya likambo mpo na mobù ya Jubilé, ekobianga bandimi “na kokundwela esengo ya bokutani nà mokonzi, (…) na kozongisama na molimo, mpe ekopesa na biso mokumba ya kobongolo mokili, mpo te eleko eye ebongwana eleko ya nsai” mingi mpenza mpo na “mabele mobebi mpo na matomba mabé”. Bofungoli mobù esantu ekopesa moto nà moto “lotomo ya komema elikya bisika bibungisami”, lokola ndakisa na mitema mya babola, bakoni,to babo baboloko. Bango nde banzangi esengo ya bomoyi bolamu, bakozala na esika uya lokumu o mokolo mwa mosala miney tuku mibale na motoba (26) ya desembere, na tango ya bofungoli ya Ekotelo Esantu o kati ya boloko ya mboka Roma, ebiangemi na nkombo ya Rebbibia. Lokola likomamaki na esika ya bilembo (bulle d’indiction) Spes non Confundit, bofungwami ya ekotelo ena o kati ya bakangi ezali elembo ya elikya mpo na etamboli ya sika, epesami na moto nà moto.

Mosantu Pàpa akobaki na mateya ma yé na kozongela maloba ya Noeli nkondo episkopo wa lokumu ya ekolo ya italie, Nganga-Nzambe ya lingomba ya ba Jesuite, Carlo Laria Martini, alobelaki boboto bwa motema mwa Nzambe emonisamaki na elongi ya mwana Yezu: “na komanyola bolingi bwa Nzambe oyo akolekisa bozangi kondimela baninga mpe bobangi bya biso, tokomanyola mpe bongo bonene ya elikya ekozila biso. (…) tika ete bomonisami ya elikya eye, engengisa banzela ya biso ya mokolo na moklo” (mateya ya noeli ya 1980).

Na bosukisi, Pàpa Franswa alendisaki lisanga ya bandimi boye : “Ndeko mwasi, ndeko mobali, ezali mpo na lotomo la yo, Ekoteli Esanto eye ya motema mwa Nzambe, ekofungwama o kati ya butù eye. Yezu, Nzambe o kati ya biso, abotami mpo na yo, mpo na biso, mpo na mobali mpe mwasi inso. Elongo na yé, nsai ekokola, elongo na yé, bomoyi bokobongwana, elongo na yé  elikya ekoyokisa nsoni te”.

Mpe lokola o limeseno, Pàpa Franswa asukisaki milulu nakomema mwana Yezu kin’o eleyelo ya basiliki Santu-Petelo, ezingamaki na bana bakitiseli ye bitape bya fulele babango.

Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa

 

24 December 2024, 00:00