Bobenisi Urbi et Orbi: Mandoki mivanda Nye
Albys KBD cp – Congo/Kinshasa
Ukraine, Terre Sainte, Liban mpe Syrie, ekolo ya Sahel to ya Liseke y’Afrika (Corne de l’Afrique), Birmanie to ekolo y’ Amérika ekabwanà (Pays d’Amérique divisés): bikolo bisengeli na kimya, ebeleli Mosantu-Pàpa, na tango asali nzinga ya bobenisi ya yé ya kati ya mboka mpe libanda o mokili mobimba, Urbi et Orbi mpo ya matata mpe mobulu ekotungisa mabele. Onsé ya moyi mwa eleko ya malili mokongenge, liboso ya bato bamobembo eye babandaki bobele koyingela o Ekoteli (Ezibeli) esantu ya jubilé oyo efungwamaki o mokolo mwa mosala mibale na mpokwa, Franswa akanisi : « mobombamo moye mokotika te kokamwisa mpe koningisa biso», ekozongela sika na nguya ya Elimo Santu, « Elimo se moko ya bolingi mpe ya bomoyi ekobilisa libumu ya Maria mpe, ya nsuni ya yé ya bomoto osalaki Yezu». « Maloba maseko malibiki makitaki lisusu mpe solo » ekanisi Papà te ezalaki koloba été : « Na lingi yo, na limbisi yo, zongela ngai, ekoteli (Ezibeli) ya motema mwa ngai mozali polele »
Episkopo wa Roma abiangi bandimi bazongela motema oyo etonda bolingo mpe bolimbisi mpo ya biso, bamitika na kolimbisama na yé mpe bayokana na ye. Nde yango ndimbola ya Ekotelo Esantu ya Jubilé, elobi ye. “Emonisi Yezu mei, Ekoteli (Ezibeli) Esanto efungwami mpo y abato banso”. «Yezu azali mokengeli mpata, Yezu azali Ekoteli (Ezibeli)» mpo ya mpata libungi oyo ezali biso mpe esengeli na mokengelina Ezibeli mpo ya kozonga o ndako ya Tata.
Komeka koleka ndelo ya Ekoteli (Ezibelo) ya Mokonzi
Bobanga te, elobi Pàpa, na boyokani nà Nzambe, «tokoyokana biso moko,mpe tokoki koyokana na ba susu, ata banguna ba biso », mpo ete “motema ngolu ya Nzambe ekoki manso, ekofungola mazita manso, akokweyisa efelo ya bokabwani, ekolimwisa boyinani mpe molimo ya botomboki”. Na yango, esengeli «komipesa mpo ya kokende liboso» “ya kotika sima molimo ya koswana mpe ya kokabola, mpo ya komibonza o maboko ya mwana oyo azali Mokonzi wa Boboto”. Esengeli koleka Ezibelo (Ekoteli) Esanto mpo ya kokoma “balekinzela bwa elikya”. Kovandisa nye mandoki mpe kolekisa bokabwani (kokabola).
Kimya na Ekolo ya Ukraine mpe na Terre Sainte
Franswa abwaki mbela mpo ya kimya na Ukraine «ayoki bolozi», abiangi yé «na lomà ya kofungola ezibelo (ekoteli) mpo ya boyokani mpe bikela bya masolo nà bokutani» mpo na «kimya semba mokowumela», na Proche-Orient, makanisi mayé makei na mangomba ma bakristu na ekolo ya Israël nà Palestine, mingimingi na mboka Gaza, «wapi epayi ezalela ya mokili ekosala somo». « Bokanga mandoki (masasi ma beta te), ba bimisa bayé bakangaki, mpe basalisa bato bazali na nzala nà bitumba », elobi yé.
Kaka na Proche-Orient, Pàpa alakisi etezali pembeni na bakristu ya liban nà Syrie, akolikya ete « bizibeli bya masolo me ya kimya mifungwama kati na bitando biye bipanzani mpo ya bozanki koyokana ». Akumisi mpe ekolo ya Liby « ekolukaka biyano ekopesaka nzela na boyokani kati na ekolo ».
Elikya mpo ya bato ya Afrika bayoki bolozi na nzela ya bitumba to koboma bato (terrorisme)
Mpa na Afrika, bosenga ya Mosantu-papa ezali ete Noeli eye ememe “eleko ya elikya” na bana ba République démocratique du Congo, bakokufa na bokono ya kasese (rougeole), na bato ya Esti ya ekolo ena, mpe bayé ya ekolo Burkina Faso, Mali, Niger nà Mozambiko. A beleli mpasi ya mokili ekobotama mpo ya « bitumba mpe minyoko (fimbo, bolozi) ya koboma » ekotungisa mpe ekokola na nzela ya « makambo mabé oyo mbongwana ya klima ezali kobimisa » ekopusa bongo liwà ya bato mpe botiki mboka ya ba miliyon ya bato.
Franswa asengi lolengo yoko kimya mpo na bikolo ya liseke ya Afrika (pays de la Corne d’Afrique) oyo wapi abeleli « likabo ya kimya, boyokani na bondeko ». Mpo na maye matali ekolo ya Soudan oyo epanzani mpo na bitumba ya ba civiles ut’o mbula moko na ndambo, asengi ete communauté internationale etombola nzela bato bàzwa lisalisi mpe bofungola nzela ya boyokani mpo na kotika mandoki.
Na Asia, Mokonzi monene ya bakatoliko alobelaki “bitumba bikosila te” na ekolo ya Birmanie, alingi ete Noeli ememe “libondisi” na baye bapusami kokima mabota ba bango. Nsima alobeli bakambi ya politiki ya Amerika, mingimingi bayé ya ekolo ya Haïti, Venezuela, Nikaragua nà ya Kolombi, mpo ete « biyano makasi mizwama na lombango, na bosolo mpe bosembo, mpo ya kolendisa boyokani kati na bato », na « kotonga bolamo ya bomoko » mpe na « na kokundola bomoto ya moko na moko, koleka bokabwani ya politiki ».
Kokweyisa bifelo bya bokabwani
Jubilé efungwamaki o mokolo mwa mosàlà mibale na mpokwa, esengeli kozala libakù « ya kobuka bifelo ya bokabwani », ezala ya makanisi, to ya nzoto lokola oyo ya ekolo ya Chypre. Franswa alingi ete « eyano ezwama mpo na kosukisa bokabwani, kati na limemya ya lotomo mpe bomoto ya bamangomba inso ya bato ya ekolo ya Chipre ».
Matondi mpo na bakeli ya bolamo
Mokolo moye ya Noeli (mbotama ya Yezu) ezali mpe libakù ya “matondi” oboso bwa bayé ba kosalakà “bolamu na bonkutù mpe loboko”: Makanisi mya Pàpa mazongi mingi mpenza o baboti, balakisi mpe bateyi, basali ya bokolongono ya nzoto, bato ya mibeko (ba mpulusi), bayé bamipesà na bikela(mosala) bya bolingyi, lokola bamissionnaires. “Matondi” abwaki na ebele (etuluku) ya balekinzela ya losambo (boyambi) basanganaki na nsé ya baziliki. “Jubilé ezala libaku yakozongisa (kofuta) baniongo”, mingimingi oyo “ezali na bozito likolo ya bikolo (mikili) ya bobola”. A limboli ete “moto na moto abiangemi na kolimbisa mabé azwi” mpo Yezu, ayei “mpo ya kobikisa mpe kolimbisa” akozongisela biso baniongo na biso inso.
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa