Le Pape lors du déjeuner offert par la Croix-Rouge italienne. Le Pape lors du déjeuner offert par la Croix-Rouge italienne.  (Vatican Media)

Mokolo ya babola: Papa François akolia na baye bazangi

Mokolo ya mokili mobimba ya babola ekosalema mokolo mwa 17 ya sanza ya zomi na moko ya mobu moye mpe Mosantu Papa akokamba, lokola momeseno, misa na basilica Mosantu Petelo na Vatican na ngonga ya zomi. Liboso ya misa, Papa François akobenisa bafungola 13, bikolakisa bikolo 13 epayi wapi Libota ya Mosantu Vincent de Paul, na likambo « ndako 13 » mpo na Jubilé, akotonga ba ndako mpo na bato bazali kokelela. Makambo mingi ya kokaba bikosalema.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa/Congo

Mokolo ya mwambi ya mokili mobimba ya babola ekosalema mokolo mwa eyenga 17 ya sanza ya zomi na moko ya 2024. Likanisi ena ebimaki mbala ya yambo na 2017, Papa François asepelaki na yango makasi mpo na kotinda Eklezia «kobima» na bifelo na ye mpo na bokutani na kimobola ya lolenge nyoso esika ezalaka na mokili ya lelo. Mbula eye, na botali ebandeli ya Jubilé ordinaire 2025, Papa aponi lokola liloba-lotomo liloba na Buku ya Siracide. «Losambo ya babola emataka epayi ya Nzambe» (cf. Sir 21,5).

Liloba liye, liwuti epayi ya mokomi mosantu ya kala Ben Sira, ekomi ya sika mpe pete mpo na koyeba. Mosantu Papa alobi lisusu ete babola bazali na esika ya motuya na motema ya Nzambe, oyo azali kokengela mpe pembeni na moko moko na bango. Nzambe ayokaka losambo ya babola mpe, liboso ya mpasi, akomaka «motema mokuse» tii akosembola makambo na bango. Na bongo, Buku ya Siracide elobi lisusu tè “kosambisama ya Nzambe ekozala malamu mpo na babola” (cf. 21,5).

Bobenisi ba fungola mpe kolia na ndako ya makita Polo ya motoba

Lokola momeseno, Papa François akokamba misa na basilica Mosantu Petelo na ngonga ya zomi.  Liboso ya misa esantu, akobenisa lokola bilembo ba fungola 13, mpo na kolakisa bikolo 13 epayi wapi Boyokani Famvin Horneless, ya libota ya Mosantu Vincent de Paul, na likanisi na ye “ndako 13” mpo na Jubilé akotonga ba ndako ya sika mpo ya bato bakeleli. Kati na bikolo bina Syria ezali na kati, ndako 13 bokotongama na mosolo ekowuta na Vatican lokola elembo ya kokaba mpo na Mobu Mosantu. Eloko ya monene wana ekosalema na lisungi ya UnipolSai, eye ezuaki likanisi ya kopesa na esengo, na bopusani ya Mobu Mosantu, na likambo wana ya elikia mpo na mabele ezali nanu konyokwama na etumba.

Lisusu, na ndako ya makita Polo ya motoba, François akolia na 1 300 bato babola. Kolia, ebongisami na dicastère ya Mosala ya lisungi, ekopesama mbula eye na Croix-Rouge ya Italia mpe na loyembo ya Fanfare ya ekolo. Sima ya boleyi, moto moko moko akozua sac à dos epesami na Basango ya Mosantu Vincent de Paul (Congrgation de la Mission), ezali bongo na kati na biloko ya kolia mpe biloko bitali bopeto ya nzoto.

Misala ya kosunga

Dicastère mpo na Kosakola nsango elamu ekoyanola na ba mposa ya baye bazangi na misala ya kosunga lolenge na lolenge, bofuti ba nyongo ya mabota ya babola na lisalisi ya ba paloisses. Mosala ena ekosalema na lisalisi ya boboto ya kala ya UnipolSai. Na poso ezali liboso ya Mokolo, masanga manso ya paloisses mpe ya ba diocèses babengami mpo na kotia o kati ya misala na bango ya losambo maye matali mposa ya babola bisika bazuami na nzela ya bilembo ya solo.  

Ngonga ya boyambi

Lokola momeseno, dicastère ya Kosakola nsango elamu abongisi buku etali makambo ya losambo, bibalusami na minoko motoba, eye epesami na bato ya Nzambe, na ntina ete, lolenge maloba ya Mgr Rino Fisichella: “Mokolo ya mokili mobimba esengeli kolakisa matumoli ya ntango inso mpo na masanga ma biso bizala na bokengi mpe boyambi baye banso bazali na bozangi mpe na mpasi”. Mpe abakisi; “Na nzela ya Jubilé ordinaire ya 2025, bokengi na biso na baye bazangi esalema mpo na biso banso baye bazali kotambola mpo na mokili eye ezali na mposa ya kongenge liboso na mwinda”.

Na liloba na ye, ekobaki Mgr Fisichella, Papa François abengi moko moko ayekola kosambela mpo na babola mpe kosambela na bango, na bomikitisi mpe kotiya motema”. Mokolo ya mokili mobimba mpo na babola ezali eleko ya kozala na bososoli ya bozali ya babola kati na bituka mpe masanga ma biso mpe ya koyeba ba mposa na bango. Lokola momeseno, Papa atangi lisusu “babola ya sika”, baye babotami na mabe ya bitumba, ya “politiki ya mabe ekosalema na mindoki”, eye ezali koboma bato bayebi ntina te. Kasi tobosana te baye bazali komipesa bango moko, na bituka na biso, bazali kopesa tango mingi na bango na boyoki mpe bosungi babola. Bizali bilongi biyebani baye, na ndakisa na bango, “bakoyokisa eyano ya Nzambe na losambo ya baye bazali kotala Ye”. Mokolo ya mokili mobimba ya babola ezali lisusu “eleko ya kokanisa moko moko na bango mpe ya kopesa melesi na Nzambe”.

 

 

 

13 November 2024, 16:03