SENEGAL-FRANCE-HISTORY SENEGAL-FRANCE-HISTORY  (AFP or licensors)

Mbula 80 ya bobomi ya Thiaroye, episkopo ya Dakar akoyoka mawa ya “ba mpota ya mozindo”

Mokolo ya eyenga ya yambo ya sanza ya zomi na mibale, Senegal ekokanisa mibu 80 ya bobomi ya ba tirailleurs ya Sénégal mpe ya bikolo bisusu y’Afrika ya ouest na mampinga ya ekolo France. Ezalaka mokolo mwa yambo ya sanza ya zomi na mibale 1944. Mpo na episkopo ya Dakar, Mgr Benjamin Ndiaye, esengeli “kokoma lisusu lisapo mpo na koloba makambo lolenge bilekaka, mpe ya kondima mango. Na molimo ya kozongisa mabe te, kasi mpo na koyeba towuti wapi, mpe tosala ete tobosana mabe wana”.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Ezali “bobomi” moko etika elembo na lisolo ya Sénégal mpe y’Afrika, eye eyebani na mokonzi ya France, na mokanda moko atindelaki mokolo ya mineyi 28 ya sanza ya zomi na moko na Bassirou Diomaye Faye, mokonzi ya sika ya Sénégal. Emmanuel Macron amoni ete “France esengeli kondima” tè “bobomi” bato esalemaki na camp ya ba soda Thiaroye, pembeni ya Dakar, mokolo ya yambo 1944. Mokonzi ya kala ya France, François Hollande, ye alobaka na 2014, «monyoko etangisaki makila» esalemaki na mampinga ya France bipayi ya minkama ya ba tirailleurs y’Afrika ya Ouest baye bazalaki kosenga lifuti na bango.

Guerre mondiale ya mibale ekomaki na suka, minkama ya ba tirailleurs bazalaki kozonga n’Afrika. Mokolo ya yambo ya décembre 1944, koleka 1 600 tirailleurs to mpe ba soda basanganaki na camp ya Thiaroye. Tango bazalaki kosenga lifuti na bango, mampinga ya France bibeti masasi na mondoki automatique bipayi ya ebele ya ba tirailleurs y’Afrika.

Mokolo mwa eyenga ya yambo ya sanza ya zomi na mibale 2024, Sénégal ekokanisa mibu 80 ya likama ena. Milulu bina, elobi episkopo ya Dakar, bikosunga “totala lisusu lisolo na biso mpo na kondima yango”, kasi, apesaki toli ete, “na molimo ya bozongisi te”. Na lisolo azuaki na bapanzi nsango ya Vatican, Mgr Benjamin Ndiaye, alobi “koganga moko ya motema mpo na kondima makoki ya bomoto”.

 

Likama ya Thiaroye etiki elembo na lisapo ya Sénégal, y’Afrika. Eloko nini na bokundoli likama ena, mingi mpenza, elenge ya lelo eye ayoki mpasi na maye maleka azali kosenga?

Mpota bizali mozindo pamba tè esengeli na biso bokutani na makambo mingi ya kala. Liboso ya likama ya Thiaroye, ezalaki na likama ya boumbu na nzela ya boteki bato n”Atlantique. Bazali kobosana tango mosusu ete liboso ya boteki bato n’Atlantique, ezalaki na botekisi bato na Sahara. Eloko elenge ya lelo akosenga, ezali bandima ye na bomoto na ye ya solo mpe batosa ye lolenge ena, ezali na molimo ya kozongisa te, ezali koganga ya motema mpo na kondima makoki ya Moto mobimba.

 

Ndenge nini omoni kondima ya sika ya bobomi ena na ekolo France?  

Na botosi, nazali komona ete France azali lelo kotungisama mpo na kondima makambo maye balukaka kowangana kala, to mpe ya bomoni lolenge mosusu. Boluki ya identité ya jeunesse y’Afrika, ezali ete tokoma lisusu lisapo mpo na koloba makambo  mpe kondima mango lolenge malekaka. Na molimo ya bozongisi mabe te, kasi mpo toyeba wapi towuti, makama nini toleki mpe tosala ndenge nini mpo ete toleka makama mana. Tango Yezu alobi ete bosolo ekopesa biso bonsomi, ayebi ete lotomo ena ya bosolo ezali mokano mpo na kokoka kotelemisa esika ya boyokani ya solo koleka mpe ya bondeko koleka.

 

Mokonzi Diomaye Faye akosenga bobongisi na sembo likolo ya kondima. Yo olobi nini?

Kobongisa ekoki kozala kaka symbolique. Tokoki kobongisa bomoyi eye tolongoli te. Soki na nzela ya kondima mabe tokoki kozua mokano ya kosala makambo bikosepelisa bato bazali lelo, ekozala malamu. Likama esili esalema, bato basusu bakufa. Yango epesa biso liteya ya kobika malamu mpe kobika lolenge ya moto.

 

Liloba nini Eklezia elingi kopanza na likambo ena?

Eklezia ezali ya solo mpo na motuya ya kotosa bomoto. Ezali mpe mpo na kobatela maye masengeli mpo na kovanda lisanga na botosi ya bokeseni na biso. Tozali na lolenge ena na mikakatano minene na Sénégal ya lelo. Tozali, esika nazuami, liyangani moko ya moke ya bakristu na kati na ya ba musulmans mingi. Tosala keba na kosenginya lisanga eye to mpe mosusu.

Tozali bato ya Sénégal, esengeli kotosa moko moko ndenge azali. Liteya eye ya lisapo ezala kaka eleko ya koteya basusu te, kasi ya kotala mikakatano maye tosengeli koyanola lelo, mpo na kondima moko moko na lolenge na ye, mpe na lokumu na ye.

Ezali pete kokomisa lisapo na makambo ya partis, lisapo eye esengeli kotinda moko moko atala bomoto na ye, mpe amituna “natosaka moninga na ngai?”.  Ezali kaka lisolo kati na colonisateurs na colonisés te, kasi ezali lisolo kati ya bato ya Sénégal baye basengeli bamitalana, mpe bamitosa na ndenge esengeli.         

01 December 2024, 20:36