2025.01.01  Losambo la  Anzelu wa mokonzi (Angelus) 2025.01.01 Losambo la Anzelu wa mokonzi (Angelus)  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Angelus: kokanisa bamama eye mitema mibukani (mitutami, mibebi) mpo na bitumba

Nzambé aponi kobotama mpo ya komonisa biso bolingi bwa ye bwa seko, mpe komema kimya na mokili, elobi Pàpa na elendiseli ya yé yambo ete asala losambo ya Maria, Anzelu ya Mokonzi o mokolo moye ya yambo ya mobù 2025. Na kolobela motema ya Maria, Franswa anbiangi kokanisa bamama, mingimingi baye mitema mibukanà (mitutamà) na bituma ezanga bomoto. Abiangi mpo ya komipesa mpo ya kokotisa kimya mpe ya kotàtola esengo ya Nsango Elamu.

Albys KBD cp – Kinshasa/RDC

 

Likamwisi mpe esengo ya Noele ezali kokoba na Nsango elamuya milùlù mwa mokolo ya yambo ya mobù, ekobete lisapo ya kokόma ya bakengeli mpata na lidùdu (grotte) ya Beteleme wapi epayi bamoni mwana abotami sika na kati ya eleyelo, elobi Pàpa. Bokutani bona, etondisi bato na makamwisi mpo na lisolo bakengeli mpata babetaki likolo ya mwana yango: “mwana abotami azali mobikisi, Kristu Mokonzi”. Na mateya ma yé, Franswa alendisi bato na biloko mibale: ya yambo ezali maye  bakengeli mpata bamonoki:mwana Yezu, bongo ya mibale nde maye bamonoki te, elakisi ete maye mazalaki koleka na motema ya Maria, oyo azalaki kobomba mpe komanyola bikwellà bina.

Nzambe abotami mpo ya bolingi mpe kimya na mokili

Na likambo ya mwana, Tata mosantu alobeli nayino ndimbola ya nkombo ya yen a nkota ya kiebreyo, oyo elimboli “Nzambe abikisi”. Kobikisa, ezali nde eloko Yezu akosala, ayei na mokili mpo ya kopesa biso bomoyi bwa ye. Moko te kati na biso aponoki kobotama, elobi Pàpa, kasi “Nzambe nde aponi kobotama mpo ya biso: Yezu azali emoniseli ya bolingo bona ya seko mpe nsuka te, ekomema kimya na mokili”.

Bitumba ezangi bomoto mpe ekobuka mitema mya bamama.

Nakolobela Maria, Franswa amonaki ete motema mwa yé mokokani na oyo ya mesiya oyo abotami mwana, akomonisa ngolu ta Tata. Motema ya ngodo Maria nde eyoki maloba ma anzelù, « Motema mona mozali loboko la mwasi bapesaki na Yozefu; motema mona mozali yambi oyo esimbaki Elisabeta na kibobange bwa yé. Kati na motema ya Maria ekobeta elikya ya bobikisi mpo ya bikela binso».

Lokola Maria, bamama bakolingaka seko bana ba bango, ekobi Pàpa koloba, mpe abiangi mpo ya kokanisa o mokolo mona ya yambo ya mobù, bamama banso bazali kosepela o mitema mya bango, nà baye mitema mitondi na mpasi, “mpo bana ba bango babungaki mpo na mobulu, mpo nalolendo, mpo na boyinani”. Mpo na mokolo moye mobonzami mpo ya kimya, Pàpa abeleli likabo lya kimya oyo “ekosepelisaka bomoyi ya bato”, nzokandé bitumba ezangi bomoto, mpe “ekobuka mitema ya bamama”, elobi yé.

Kotàtola na mokili esengo ya Nsango Elamu

Na ndakisa ya masolo mana, lokola o limeseno, Franswa abiangi batamboli ya boyambi, balekinzela, mpe moko na moko o kati na biso nakomituna: “soki nakoki kosala kimya mpo ya kotala na likebi (komanyola) mbotama ya Yezu? Soki nalukaka kosepelisa motema mwa ngai na ekwelà ena, na nsango ya ye ya bolamu mpe ya libiki? Mpe boniboni nakoki kobonza likabo linene lina, na mwa elembo ya boboto, ya bolimbisi, ya boyokani?”.  Pàpa asukisi na kolendisa nakosenga bolobeli bwa Mama wa Nzambe, mpo atangisa biso “nakobomba o mitema mya biso, mpe nakotàtola na mokili, esengo ya Nsango Elamu”.

Kolongola to kokitisa ba nyongo ya bikolo (mikili) ya bobolà

Sima ya losambo la Anzelu ya Mokonzi (losambo la Angelus), Pàpa apesi melesi na mokambi ya Ekolo ya Italie Sergio Mattarella, mpo na bokanisi asalaki na nsango eye atindaki na ekolo, bongo alaki nsambo ya yé.  

Franswa, na kokoba, akanisi na mangomba ya mokolo ya boboto o mokili mobimba, mokolo ya yambo ya mobù nà Papa Paul VI. O mobù monà, mpo ya Jubilé, mokolo mona mosengeli koleka na molimo ya “Kozongisa (kolimbisa) ba nyongo”. Moto ya liboso ya kolimbisa ba nyongo, elobi Pàpa, ezali ye mei Nzambe, ndenge tosengaka yé na losambo ya “Tata wa biso”, na kotanga masumu ma biso mpe na kozwa mokano ya kolimbisa na ngala na biso, baye banso basalaki biso mabé. “Jubile ekosenga biso na kobongola bolimbisi lina, nabisika y abato, mpo ete ata mutu moko te, libota lyoko te, bato boko te, banyatama na banyongo”. Pàpa abiangi mpe « alendisi bongo bakambi bya bikolo ya mimeseno ya bokristu na kopesa ndakisa  ya kolongola to kokitisa lolenge esengeli, banyongo ya bikolo ya bobolà».

“Pàpa abiangi mpe « alendisi bongo bakambi bya bikolo ya mimeseno ya bokristu na kopesa ndakisa ya kolongola to kokitisa lolenge esengeli, banyongo ya bikolo ya bobolà».”

Bitumba esila na bangambo binso

Nabokobi, Tata Mosantu akumisi bandakisa ya sika ya bansambo mpe ya bomipesi mpo ya kimya balukaki bipayi binso o kati na mokili, na ba mangomba ya diosezi mpe ya ba paruase, na bamoziki, mpe bitulukù ya baeklezya, na ndakisa ya Kotambola na boboto (kimya) oyo esalemaki o mokolo mwa poso, na ekolo ya Pesaro, na Italie. Apesi mbote na basangani ya milùlù ya Kimya (boboto) o mikili (o mabele) manso ebongisamaki na lingomba ya Sant'Egidio na bikolo bikeseni.

Franswa atondi botondi mpe na baye banso, bakofungolaka masolo ya boyokani, na bitando ya bozangi koyokana, asengi losambo, po ete “bitumba esila na bangàmbo inso, mpe banso bazwa mokano mpo ya kimya mpe boyokani”. Mabanzo mayé maleki mingimingi na ekolo ya Ukraine, Gaza, Israele, Birmania, Nord-Kivu (RDC) mpe na ebele ya bato bazali na bitumba. Bitumba ekobebisa, mpe azali seko ya kopola (na bolongi te). Ekanisi ye.

Nakopesa mbote na batamboli ya boyambi mpe balekinzela, Franswa atangaki bayembeli ya bakelasi (biteyelo) ya ekolo ya États-Unis ya Amérika, oyo babetaki mokolo ya 1er ya sanza ya yanuali na Esika Mosantu-Petro (place Saint-Pierre).

 

Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.

 

03 January 2025, 09:57